Yirimia 29:1-32

  • Mokanda ya Yirimia epai ya baoyo bamemamaki bakangami na Babilone (1-23)

    • Yisraele ekozonga nsima ya mbula 70 (10)

  • Nsango mpo na Shemaya (24-32)

29  Talá maloba ya mokanda oyo mosakoli Yirimia atindaki longwa na Yerusaleme epai ya bankulutu oyo bazalaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya, banganga-nzambe, basakoli mpe bato nyonso oyo Nebukadenezare amemaki na mboka mopaya longwa na Yerusaleme tii na Babilone,  atindaki yango wana mokonzi Yekonia,+ mama-mokonzi,*+ bakapita ya ndako ya mokonzi, bankumu ya Yuda ná ya Yerusaleme, mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe bato oyo basalaka biloko ya bibende* babimaki na Yerusaleme.+  Atindaki mokanda yango na lobɔkɔ ya Elasa mwana ya Shafane+ mpe Gemaria mwana ya Hilikiya, oyo Zidikiya+ mokonzi ya Yuda atindaki na Babilone epai ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone. Mokanda yango elobaki boye:  “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi na bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya, baoyo nasalaki ete bámemama na mboka mopaya longwa na Yerusaleme tii na Babilone ete:  ‘Bótonga bandako mpe bófanda kuna, bólona bilanga mpe bólya mbuma na yango.  Bóbala mpe bóbota bana mibali mpe ya basi; bózwela bana na bino ya mibali basi mpe bóbalisa bana na bino ya basi, mpo bango mpe bábota bana mibali mpe ya basi. Bókóma mingi kuna, mpe motángo na bino ekita te.  Mpe bóluka kimya ya engumba epai namemi bino na mboka mopaya, mpe bóbondela Yehova mpo na bolamu na yango, mpo soki ezali na kimya, bokozala na kimya.+  Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bótika te ete basakoli na bino mpe bato na bino oyo basakolaka makambo oyo ebombaná oyo bazali kati na bino bákosa bino,+ mpe bóyoka te bandɔtɔ na bango oyo bazali kolɔta.  Mpo ‘bazali kosakwela bino makambo ya lokuta na nkombo na ngai. Natindi bango te,’+ Yehova alobi bongo.”’” 10  “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Ntango mbula 70 ekokoka na Babilone nakotyela bino likebi,+ nakokokisela bino elaka na ngai ya malamu na ndenge nakozongisa bino na esika oyo.’+ 11  “‘Mpo nayebi malamu makanisi oyo nazali na yango mpo na bino,’ Yehova alobi bongo, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te,+ mpo na kopesa bino bomoi ya malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.+ 12  Mpe bokobenga ngai, bokoya kobondela ngai, mpe ngai nakoyoka bino.’+ 13  “‘Bokoluka ngai mpe bokozwa ngai,+ mpo bokoluka ngai na motema na bino mobimba.+ 14  Mpe nakotika ete bózwa ngai,’+ Yehova alobi bongo. ‘Mpe nakoyanganisa bakangami na bino mpe nakosangisa bino esika moko uta na bikólo nyonso mpe na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ Yehova alobi bongo. ‘Mpe nakozongisa bino na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+ 15  “Kasi bino bolobi: ‘Yehova abimiseli biso basakoli na Babilone.’ 16  “Mpo talá oyo Yehova alobi na mokonzi oyo afandi na kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe na bato nyonso oyo bafandi na engumba oyo, bandeko na bino oyo bamemami te na mboka mopaya elongo na bino, 17  ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Nazali kotindela bango bitumba, nzala mpe maladi mabe,+ mpe nakokómisa bango lokola bambuma ya figi oyo ebebá, oyo ekoki kolyama te mpo ezali mabe mpenza.”’+ 18  “‘Mpe nakotungisa bango na bitumba,+ na nzala mpe na maladi mabe, mpe nakokómisa bango eloko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele,+ eloko ya kokamwa, eloko ya kotyola+ mpe ya nsɔni kati na bikólo nyonso epai napalanganisi bango,+ 19  mpo bayoki maloba na ngai te oyo natindelaki bango na nzela ya basaleli na ngai basakoli,’ Yehova alobi bongo, ‘natindaki bango mbala na mbala,’*+ “‘Kasi boyokaki te,’+ Yehova alobi bongo. 20  “Yango wana, bóyoka liloba ya Yehova, bino nyonso baoyo bomemamaki na mboka mopaya, baoyo natindi longwa na Yerusaleme tii na Babilone. 21  Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi mpo na Ahaba mwana ya Kolaya mpe Zidikiya mwana ya Maaseya, baoyo bazali kosakwela bino makambo ya lokuta na nkombo na ngai:+ ‘Talá nazali kopesa bango na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mpe akoboma bango na miso na bino. 22  Likambo oyo ekokómela bango, bato ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya bakokóma koloba yango lokola elakeli mabe ete: “Yehova asala yo lokola Zidikiya mpe lokola Ahaba, baoyo mokonzi ya Babilone atumbaki na mɔtɔ!” 23  Mpo basali makambo ya bozoba mpenza na Yisraele,+ bazali kosala ekobo na basi ya baninga na bango mpe bazali koloba maloba ya lokuta na nkombo na ngai, likambo oyo napesaki bango mitindo te.+ “‘“Nayebi makambo oyo basali mpe nazali motatoli,”+ Yehova alobi bongo.’” 24  “Mpe okoloba na Shemaya+ moto ya Nehelame ete: 25  ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Lokola otindi mikanda na nkombo na yo epai ya bato nyonso oyo bazali na Yerusaleme, epai ya Sefania+ mwana ya Maaseya, nganga-nzambe, mpe epai ya banganga-nzambe nyonso, ete: 26  ‘Yehova akómisi yo nganga-nzambe na esika ya nganga-nzambe Yehoyada, mpo okóma mokɛngɛli ya ndako ya Yehova, ozala na mokumba ya kopesa etumbu na moto nyonso ya ligboma oyo azali kosala lokola mosakoli, mpe kotya ye na bikanga-makolo mpe na ekanga-nkingo ná mabɔkɔ;*+ 27  bongo sikoyo, mpo na nini opameli te Yirimia moto ya Anatote,+ oyo azali kosala lokola mosakoli mpo na bino?+ 28  Kutu atindeli biso nsango na Babilone ete: “Ekoumela! Bótonga bandako mpe bófanda kuna, bólona bilanga mpe bólya mbuma na yango,+—”’”’” 29  Ntango Sefania+ nganga-nzambe atángaki mokanda yango na matoi ya mosakoli Yirimia, 30  Yehova alobaki na Yirimia ete: 31  “Tindelá bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya nsango ete: ‘Talá oyo Yehova alobi mpo na Shemaya moto ya Nehelame: “Lokola Shemaya asakweli bino, nzokande natindaki ye te, mpe aluki kotinda bino bótya motema na makambo ya lokuta,+ 32  na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Nazali kopesa Shemaya moto ya Nehelame mpe libota na ye etumbu. Moto moko te ya libota na ye akobika na kati ya bato oyo; mpe akomona te bolamu oyo nakosalela bato na ngai,’ Yehova alobi bongo, ‘mpo atindi bato bátombokela Yehova.’”’”

Maloba na nse

To mbala mousu, “batongi ya bifelo makasi ya libateli.”
To, “mwasi ya lokumu.”
Lil., “nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango.”
To, “bibende ya nkingo.”