Nzembo 10:1-18

  • Yehova azali mosungi ya moto oyo azangi libateli

    • Na lolendo nyonso moto mabe alobi: “Nzambe azali te” (4)

    • Moto oyo azangi libateli atalelaka Yehova (14)

    • “Yehova azali Mokonzi libela na libela” (16)

ל [Lamed] 10  Ee Yehova, mpo na nini ozali kotɛlɛma mosika? Mpo na nini ozali komibomba na ntango ya mpasi?+   Na lofundo nyonso, moto mabe azali kolanda moto oyo azangi libateli,+Kasi moto mabe akokangama na mayele na ye ya mabe.+   Mpo moto mabe amikumisi mpo na mposa na ye ya moimi*+Mpe azali kopambola moto ya lokoso;*נ [Nun]Azangi limemya epai ya Yehova.   Moto mabe na lolendo na ye alukalukaka te;Makanisi na ye nyonsoezali kaka ete: “Nzambe azali te.”+   Nyonso oyo asalaka elongaka,+Kasi azali kokanga ntina te ya mibeko na yo;+Asɛkaka* banguna na ye nyonso.   Alobi na motema na ye ete: “Nakokwea ata moke te;*Mpo nakomona mpasi ata moke te libota nalibota.”+ פ [Pe]   Monɔkɔ na ye etondi na bilakeli mabe, lokuta mpe makambo oyo ememaka mpasi;+Mpasi mpe makambo oyo enyokolaka ezali na nse ya lolemo na ye.+   Azali kobatama pembeni ya bamboka;Uta na esika na ye ya kobombana abomi moto oyo asali likambo te.+ ע [Ayin] Miso na ye ezali kotala mpo na kokanga moto ya mawa.+   Azali kozela na esika na ye ya kobombana lokola nkɔsi na esika na ye ya kobombana.+ Azali kozela mpo akanga moto oyo azangi libateli. Akangi moto oyo azangi libateli ntango azali kobenda monyama na ye.+ 10  Moto oyo asali likambo te atutami mpe abwakami na nse;Bato ya mawa bakwei na manzaka na ye ya makasi. 11  Alobi na motema na ye ete: “Nzambe abosani.+ Abalusi elongi na ye. Azali komona ata eloko moko te.”+ ק [Kof] 12  Tɛlɛmá, Ee Yehova.+Ee Nzambe, tombolá lobɔkɔ na yo.+ Kobosana te bato oyo bazangi libateli.+ 13  Mpo na nini moto mabe azangi limemya epai ya Nzambe? Alobi na motema na ye:“Okosɛnga ngai te nazongisa monɔkɔ.” ר [Resh] 14  Kasi omonaka ntango moto azali na mpasi mpe atungisami. Otalaka mpe ozwaka makambo na mabɔkɔ.+ Moto ya mawa atalelaka yo;+Ozali mosungi ya mwana oyo tata akufá.+ ש [Shin] 15  Buká lobɔkɔ ya moto mabe mpe ya moto ya makambo mabe.+Mpo ntango okoluka makambo na ye ya mabe,Okomona yango lisusu te. 16  Yehova azali Mokonzi libela na libela.+ Bikólo elimwe na mabele.+ ת [Taw] 17  Kasi okoyoka kosɛnga ya bato ya komikitisa,Ee Yehova.+ Okokembisa mitema na bango+ mpe okotyela bango mpenza likebi.+ 18  Okokata na bosembo likambo ya mwana oyo tata akufá mpe baoyo batutami,+Mpo moto, mowei mpamba, oyo azali moto ya mabele, abangisa bango lisusu te.+

Maloba na nse

To, “mposa ya molimo na ye.”
To mbala mosusu, “moto ya lokoso azali komipambola.”
To, “Atyolaka.”
To, “Nakotengatenga ata moke te.”