Mokanda ya Yakobo 3:1-18

  • Kosala ete lolemo etosa (1-12)

    • “Bateyi bázala mingi te” (1)

  • “Bwanya oyo euti na likoló” (13-18)

3  Bandeko na ngai, bateyi bázala mingi te na kati na bino, mpo boyebi ete tokosambisama makasi koleka.+  Mpo biso nyonso tobɛtaka mabaku* mbala mingi.+ Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.  Soki totye bibende ya mbanga na monɔkɔ ya mpunda mpo etosa biso, tozali kotambwisa mpe nzoto na yango mobimba.  Bótala mpe masuwa: Atako ezalaka minene mingi mpe mipɛpɛ ya makasi ememaka yango, batambwisaka yango na yenda moko ya moke mpenza mpo ekendaka epai nyonso moto oyo asimbi yenda alingi.  Ndenge moko mpe, lolemo ezali eteni moko ya moke ya nzoto, kasi emikumisaka na makambo minene. Talá ndenge mwa mɔtɔ moke ekoki kotumba zamba ya monene mpenza!  Lolemo ezali mpe mɔtɔ.+ Lolemo ezali eteni ya nzoto na biso oyo etondi na kozanga bosembo,+ mpo yango ekómisaka nzoto mobimba mbindo, ezikisaka bomoi mobimba* mpe mɔtɔ na yango eutaka na Gehena.*  Mpo bato bakoki kosala ete mitindo nyonso ya banyama ya zamba, ya bandɛkɛ, ya banyama oyo ebendanaka na libumu mpe ya bikelamu oyo efandaka na mbu etosa bango, mpe etosaka bango.  Kasi moto moko te akoki kosala ete lolemo etosa ye. Ezali eloko mabe mpe epesaka mpasi mpenza, etondi na pwazɔ oyo ebomaka.+  Tosanzolaka na yango Yehova,* Tata, nzokande na yango mpe tolakelaka bato mabe, bato oyo basalemá “na elilingi ya Nzambe.”+ 10  Na monɔkɔ wana kaka moko lipamboli mpe elakeli mabe ezali kobima. Bandeko na ngai, ebongi te ete makambo wana esalema bongo.+ 11  Liziba ebimisaka nde mai ya malamu ná oyo ya bololo esika moko? 12  Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki nde kobota mbuma ya olive to nzete ya vinyo mbuma ya figi?+ Mai ya mungwa mpe ekoki kobimisa mai ya malamu te. 13  Nani azali moto ya bwanya mpe ya mayele na kati na bino? Alakisa yango na etamboli na ye ya malamu, na misala ya boboto oyo ezali komonisa bwanya. 14  Kasi soki bozali na zuwa makasi+ mpe kowelana*+ na mitema na bino, bómikumisaka te+ mpe bókoselaka solo makambo te. 15  Wana ezali bwanya oyo euti na likoló te, kasi ezali nde ya nse,+ ya bonyama, ya bademo. 16  Mpo epai zuwa mpe kowelana* ezali, mobulu ná makambo nyonso ya mabe mpe ekozala wana.+ 17  Kasi bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto,+ mpe kimya,+ na makambo makasimakasi te,+ esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe esalaka misala ya malamu,*+ eponaka bilongi te,+ ezalaka na bokosi te.+ 18  Bato oyo babatelaka boyokani malamu na basusu,+ batyaka kimya+ mpe yango esalaka ete bábota mbuma ya makambo oyo ezali sembo.

Maloba na nse

To, “tosalaka mabunga.”
Lil., “yiká ya kobotama (ebandeli).”
Talá Ap. A5.
To mbala mosusu, “mikano ya moimi.”
To mbala mosusu, “mikano ya moimi.”
To, “ebimisaka mbuma ya malamu.”