Masese 10:1-32

  • “Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye” (1)

  • “Moto oyo asalaka mosala makasi akokóma mozwi” (4)

  • Koloba mingi ebɛtisaka libaku (19)

  • Lipamboli ya Yehova ekómisaka moto mozwi (22)

  • “Kobanga Yehova ekómisaka bomoi molai” (27)

10  Masese ya Salomo.+ Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,+Kasi mwana ya zoba azali motungisi mpo na mama na ye.   Biloko ya motuya oyo ezwami na ndenge ya mabe ekozala na litomba moko te,Kasi bosembo nde ebikisaka na liwa.+   Yehova akosala te ete moto ya sembo anyokwama* na nzala,+Kasi akopimela bato mabe biloko oyo bazali koluka kozwa.   Moto ya gɔigɔi akokóma mobola,+Kasi moto oyo asalaka mosala makasi akokóma mozwi.+   Mwana oyo asalaka na bososoli ayanganisaka mbuma na eleko ya molunge,Kasi mwana oyo asalaka makambo na nsɔni mpenza alalaka mpɔngi makasi na ntango ya kobuka mbuma.+   Mapamboli ezali na motó ya moto ya sembo,+Kasi monɔkɔ ya moto mabe ebombaka mobulu.   Bakokanisa moto ya sembo mpe bakolobela ye malamu,+Kasi nkombo ya bato mabe ekopɔla.+   Moto oyo azali na bwanya na motema akolanda malako,*+Kasi ye oyo alobaka na bozoba nyonso akonyatama.+   Moto oyo asalaka malamu akotambola na kimya,+Kasi moto oyo asalaka na bokosi bato bakoyeba ye.+ 10  Moto oyo afinafinaka lisona ye akopesa mpasi,+Mpe ye oyo alobaka na bozoba nyonso akonyatama.+ 11  Monɔkɔ ya moto ya sembo ezali liziba ya bomoi,+Kasi monɔkɔ ya moto mabe, ebombaka mobulu.+ 12  Koyina nde elamusaka kowelana,Kasi bolingo ezipaka makambo nyonso oyo ebuki mibeko.+ 13  Bwanya emonanaka na mbɛbu ya moto ya bososoli,+Kasi fimbo ezali mpo na mokɔngɔ ya moto oyo azangi bososoli.*+ 14  Bato ya bwanya ndebabatelaka boyebi malamumalamu,+Kasi monɔkɔ ya zoba ememaka libebi.+ 15  Bomɛngo* ya mozwi ezali engumba na ye ya makasi. Libebi ya bato oyo bazangá nde bobola na bango.+ 16  Mosala ya moto ya sembo ememaka na bomoi;Kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu.+ 17  Moto oyo akangami na disiplini azali nzela oyo ememaka na bomoi,*Kasi moto oyo atyelaka mpamela likebi te akobungisa basusu nzela. 18  Moto oyo abombi koyina, alobaka lokuta,+Mpe moto oyo azali kopanza nsango ya mabe azali zoba. 19  Moto oyo alobaka mingi, akozanga te kobɛta libaku,+Kasi moto oyo apekisaka maloba* na ye azali kosala na mayele.+ 20  Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata oyo eleki kitoko,+Kasi motema ya moto mabe ezali na motuya te. 21  Mbɛbu ya moto ya sembo eleisaka* bato mingi,+Kasi zoba akufaka mpo azangi bososoli.+ 22  Lipamboli ya Yehova nde ekómisaka moto mozwi,+Mpe abakisaka mpasi* ata moke te na yango. 23  Mpo na zoba, komipesa na etamboli ya nsɔni ezali lokola lisano,Kasi bwanya ezali mpo na moto ya bososoli.+ 24  Eloko oyo moto mabe abangaka yango nde ekokómela ye;Kasi mposa ya moto ya sembo ekokokisama.+ 25  Ntango mopɛpɛ makasi ekoleka, moto mabe akozala lisusu te,+Kasi moto ya sembo azali moboko mpo na libela.+ 26  Ndenge kaka vinɛgrɛ esalaka na mino mpe milinga na miso,Moto ya gɔigɔi azali mpe bongo epai ya moto oyo atindaka ye.* 27  Kobanga Yehova ekómisaka bomoi molai,+Kasi bambula ya moto mabe ekokóma mokuse.+ 28  Eloko oyo bato ya sembo bazelaka* ememaka esengo,+Kasi elikya ya bato mabe ekokufa.+ 29  Nzela ya Yehova ezali esika makasi ya libateli mpo na moto oyo azangi mbeba,+Kasi ezali libebi mpo na basali mabe.+ 30  Bakokweisa moto ya sembo ata moke te,+Kasi bato mabe bakofanda lisusu te na mabele.+ 31  Monɔkɔ ya moto ya sembo ebimisaka* bwanya,Kasi lolemo oyo elobaka lokuta ekolongolama. 32  Mbɛbu ya moto ya sembo elobaka makambo oyo esepelisaka,Kasi monɔkɔ ya moto mabe elobaka lokuta.

Maloba na nse

To, “molimo ya moto ya sembo enyokwama.”
Lil., “mitindo.”
Lil., “oyo azali na motema te.”
To, “Biloko ya motuya.”
To mbala mosusu, “azali na nzela ya bomoi.”
Lil., “mbɛbu.”
To, “etambwisaka.”
To, “mawa.”
To, “mokonzi na ye ya mosala.”
To, “Elikya ya bato ya sembo.”
To, “ebotaka mbuma ya.”