Masese 16:1-33

  • “Yehova atalatalaka makanisi” (2)

  • Tyelá Yehova motema na oyo okosala (3)

  • “Bimekeli-kilo ya sembo ezali ya Yehova” (11)

  • “Lolendo ememaka na libebi” (18)

  • Nsuki mpɛmbɛ, motole ya kitoko (31)

16  Moto abongisaka makanisi ya motemana ye,*Kasi eyano oyo apesaka* eutaka epai ya Yehova.+   Moto akanisaka ete nyonso oyo asalaka ezali malamu,*+Kasi Yehova atalatalaka makanisi.*+   Na nyonso oyo okosala tyelá Yehova motema,*+Mpe makambo oyo ozali kokana ekolonga.   Yehova asalá eloko nyonso mpo na mokano na ye,Ata moto mabe mpo na mokolo ya mpasi.+   Yehova ayinaka moto nyonso oyo azali na lolendo na motema na ye.+ Yebá* ete akozanga te kozwa etumbu.   Na motema boboto mpe na bosembo nde libunga elimbisamaka,+Mpe na kobanga Yehova nde moto atikaka mabe.+   Ntango Yehova azali kosepela na banzela ya moto,Asalaka ete ata banguna na ye bázala na kimya elongo na ye.+   Eleki malamu kozala na biloko moke kasi kotikala sembo+Na esika ya kozala na bozwi mingi mpe kozanga bosembo.+   Moto akoki kokanisa na motema na ye nzela oyo akokende,Kasi Yehova nde atambwisaka matambena ye.+ 10  Ekateli ya Nzambe esengeli kozala na mbɛbu ya mokonzi;+Asengeli ata moke te kowangana bosembo.+ 11  Bimekeli-kilo ya sembo ezali ya Yehova;Kilo nyonso oyo ezali na libenga ezali mosalana ye.+ 12  Bakonzi bayinaka misalaya mabe,+Mpo kiti ya bokonzi epikamaka makasi na nzela ya bosembo.+ 13  Maloba ya bosembo esepelisaka bakonzi. Balingaka moto oyo alobaka na bosembo.+ 14  Nkanda makasi ya mokonzi ezali lokola nsango ya liwa,+Kasi moto ya bwanya akitisaka yango.+ 15  Soki mokonzi amoniseli moto boboto, moto yango akozala na esengo;Boboto na ye ezali lokola lipata ya mbula na eleko ya prɛnta.+ 16  Kozwa bwanya ezali mpenza malamu koleka wolo!+ Eleki malamu kozwa mayele na esika ya palata.+ 17  Bato oyo bazangi mbeba baboyaka kolanda nzelaya mabe. Moto nyonso oyo abatelaka nzela na ye abatelaka bomoi* na ye.+ 18  Lolendo ememaka na libebi,Mpe lofundo* ememaka na kokwea.+ 19  Eleki malamu kozala moto ya komikitisa na kati ya bato ya komikitisa+Na esika ya kokabola biloko oyo epunzami ya bato ya lofundo. 20  Moto oyo amonisaka bososoli na likambo akolonga,*Mpe esengo na moto oyo atyelaka Yehova motema. 21  Moto oyo azali na bwanya na motema akobengama moto ya mayele,+Mpe moto oyo azali na maloba ya boboto* ayebaka kondimisa.+ 22  Mayele ya kososola ezali liziba ya bomoi epai ya baoyo bazali na yango,Kasi disiplini ya bazoba ezali bozoba na bango moko. 23  Moto ya bwanya aponakamalamumalamu malobana ye+Mpe abakisaka kondimisa na maloba na ye. 24  Maloba ya kosepelisa ezali ndako ya mafuta ya nzoi,Elɛngi na molimo* mpe nkisi oyo ebikisaka mikuwa.+ 25  Nzela mosusu ekoki komonana malamu na miso ya moto,Kasi na nsuka ememi na liwa.+ 26  Mposa* ya mosali etindaka ye asala mosala makasiMpo nzala* nde etindaka ye asala bongo.+ 27  Moto mpamba akundolaka oyo ezali mabe;+Maloba na ye ezali lokola mɔtɔ oyo ezikisaka.+ 28  Moto ya mayele mabe abimisaka kowelana,+Mpe moto oyo akoselaka bato makambo akabolaka baninga ya motema.+ 29  Moto ya mobulu alengolaka mozalani na ye,Mpe amemaka ye na nzela ya mabe. 30  Afinafinaka liso na ye ntango alingi kosala mabe. Amungamungaka ntango azali kosala mabe. 31  Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko*+Ntango ezwami na nzelaya bosembo.+ 32  Moto oyo ayokaka nkanda noki te+ azali malamu koleka moto ya nguya,Mpe moto oyo apekisaka nkanda na ye* azali malamu koleka moto oyo azwi engumba.+ 33  Moto akoki kobwaka mbɛsɛ,*+Kasi Yehova nde azwaka ekateli ya nsuka.+

Maloba na nse

To, “eyano ya malamu.” Lil., “eyano ya lolemo.”
Lil., “Kotya makambo ya motema na molɔngɔ ezali likambo ya moto.”
Lil., “pɛto.”
Lil., “elimo.”
Lil., “tikelá Yehova misala na yo.”
Lil., “Lobɔkɔ na lobɔkɔ.”
To, “molimo.”
Lil., “lofundo ya elimo.”
Lil., “akozwa bolamu.”
To, “maloba oyo esepelisaka.” Lil., “mbɛbu ya sukali.”
To, “komeka.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Molimo.”
Lil., “monɔkɔ.”
To, “nkembo.”
Lil., “azali na bokonzi likoló ya elimo na ye.”
Lil., “kobwaka mbɛsɛ na kati ya elamba oyo ezipaka bibɛlɔ.”