Mokanda ya liboso ya Yoane 2:1-29

  • Yesu, mbeka ya kozipa lisumu (1, 2)

  • Kotosa mibeko ya Nzambe (3-11)

    • Mobeko ya kala mpe ya sika (7, 8)

  • Ntina ya mokanda (12-14)

  • Bólinga mokili te (15-17)

  • Likebisi mpo na motɛmɛli ya Kristo (18-29)

2  Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi* moko epai ya Tata, Yesu Kristo,+ moto ya sembo.*+  Mpe ye azali mbeka ya kozipa*+ masumu na biso,+ kaka oyo ya biso moko te, kasi mpe oyo ya mokili mobimba.+  Mpe na likambo oyo nde tososoli ete toyebi mpenza ye: soki tokobi kotosa mibeko na ye.  Moto oyo alobi: “Nayebi mpenza ye,” nzokande atosaka mibeko na ye te, azali moto ya lokuta, mpe solo ezali na kati ya moto yango te.  Kasi moto oyo atosaka liloba na ye, bolingo ya Nzambe ekómi mpenza ya kokoka na kati ya moto yango.+ Na ndenge yango nde toyebi ete tozali na bomoko elongo na ye.+  Moto oyo alobi ete atikali na bomoko elongo na ye asengeli ye moko kokoba kotambola kaka ndenge moto wana atambolaki.+  Bandeko ya bolingo, nazali kokomela bino mobeko moko ya sika te, kasi mobeko ya kala oyo bozwaki banda na ebandeli.+ Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki.  Lisusu, nazali kokomela bino mobeko moko ya sika, oyo ezali solo na likambo na ye mpe ya bino, mpo molili ezali koleka mpe pole ya solosolo esili kutu kongɛnga.+  Moto oyo alobi ete azali na pole nzokande azali koyina+ ndeko na ye azali naino na molili.+ 10  Moto oyo alingaka ndeko na ye atikali na kati ya pole,+ mpe epai na ye eloko moko ya kobɛtisa libaku ezali te. 11  Kasi moto oyo ayini ndeko na ye azali na molili mpe azali kotambola na molili;+ mpe ayebi epai azali kokende te,+ mpo molili ebomi ye miso. 12  Nazali kokomela bino, bana, mpo masumu na bino elimbisami mpo na nkombo na ye.+ 13  Nazali kokomela bino, batata, mpo boyebi mpenza ye oyo azali banda na ebandeli. Nazali kokomela bino, bilenge, mpo bolongi moto mabe.+ Nazali kokomela bino, bana mike, mpo boyebi mpenza Tata.+ 14  Nakomeli bino, batata, mpo boyebi mpenza ye oyo azali banda na ebandeli. Nakomeli bino, bilenge, mpo bozali makasi+ mpe liloba ya Nzambe etikali na kati na bino+ mpe bolongi moto mabe.+ 15  Bólinga mokili te to biloko oyo ezali na mokili.+ Soki moto alingi mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te;+ 16  mpo eloko nyonso oyo ezali na mokili—mposa ya nzoto+ mpe mposa ya miso+ mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela*—euti na Tata te, kasi euti na mokili. 17  Lisusu, mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango,+ kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala mpo na seko.+ 18  Bana mike, oyo ezali ngonga ya nsuka. Boyokaki ete motɛmɛli ya Kristo azali koya,+ nzokande sikoyo ebele ya batɛmɛli ya Kristo babimi;+ na yango toyebi ete oyo ezali ngonga ya nsuka. 19  Babimaki na kati na biso, kasi bazalaki baoyo ya biso te;*+ mpo soki bazalaki baoyo ya biso, balingaki kotikala elongo na biso. Kasi babimaki mpo emonana polele ete bato nyonso te nde bazali baoyo ya biso.+ 20  Mpe kotyama mafuta na bino euti na mosantu,+ mpe bino nyonso bozali na boyebi. 21  Soki nazali kokomela bino, ezali te mpo boyebi solo te,+ kasi nde mpo boyebi yango, mpe mpo lokuta moko te euti na solo.+ 22  Nani azali moto ya lokuta, soki ezali te moto oyo awangani ete Yesu azali Kristo?+ Wana nde motɛmɛli ya Kristo,+ moto oyo azali kowangana Tata mpe Mwana. 23  Moto nyonso oyo awangani Mwana azali mpe na Tata te.+ Kasi moto oyo andimi Mwana+ azali mpe na Tata.+ 24  Kasi bino, makambo oyo boyokaki banda na ebandeli esengeli kotikala na kati na bino.+ Soki makambo oyo boyokaki banda na ebandeli etikali na kati na bino, bino mpe bokotikala na bomoko elongo na Mwana mpe na bomoko elongo na Tata. 25  Lisusu, talá eloko oyo ye moko alakaki biso: bomoi ya seko.+ 26  Nazali kokomela bino makambo oyo mpo na baoyo bazali koluka kokosa bino. 27  Kasi bino, Nzambe atye bino mafuta na elimo na ye+ mpe yango etikali kati na bino, mpe bozali na mposa te ete moto moko ateyaka bino; kasi kotyama mafuta oyo euti epai na ye ezali koteya bino na makambo nyonso,+ mpe ezali solo mpe ezali lokuta te. Ndenge kaka eteyi bino, bótikala na bomoko elongo na ye.+ 28  Bongo sikoyo, bana, bótikala na bomoko elongo na ye, mpo ete ntango akomonisama, tózala na elobeli ya polele+ mpe tózonga nsima te mosika na ye, na nsɔni, na ntango ya kozala na ye. 29  Soki boyebi ete azali moto ya sembo, boyebi mpe ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya bosembo abotami na ye.+

Maloba na nse

To, “moyengebene.”
To, “molobeli.”
Lil., “mbeka ya kolimbisa; nzela ya kokitisa motema.”
To, “komikumisa mpo na biloko oyo ozali na yango.”
To, “bazalaki bato ya ndenge na biso te.”