Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobeli libala ya basi-basi to mibali-mibali?

Biblia elobeli libala ya basi-basi to mibali-mibali?

Eyano ya Biblia

 Nzambe atyá mibeko oyo etali libala kala mpenza liboso baguvɛrnema ya bato esala yango. Mokanda ya liboso ya Biblia elobi ete: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Na kolanda diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia (Vine’s Expository Dictionary of Biblical Words), liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mwasi” elimboli “moto oyo azali mobali te.” Yesu mpe amonisaki ete bato oyo babalani basengeli kozala “mobali ná mwasi”​—Matai 19:4.

 Na yango, Nzambe alingaki ete libala eumela libela, mpe esangisa mwasi ná mobali oyo balingani. Nzambe asalá mwasi mpo azala mosungi ya mobali, mpe yango esalisaka bango bálingana, básangisa nzoto, mpe bábota bana.