Nzembo 72:1-20

  • Boyangeli ya kimya ya mokonzi oyo Nzambe atyá

    • “Bato ya sembo bakokola lokola matiti” (7)

    • Bato oyo akokamba bakozala banda na mbu moko tii na mbu mosusu (8)

    • Akobikisa bango na mobulu (14)

    • Ebele ya bilei na mabele (16)

    • Nkombo ya Nzambe esanzolama mpo na libela (19)

Mpo na Salomo. 72  Ee Nzambe, pesá mokonzi bikateli na yo ya lisambisi,Mpe pesá mwana ya mokonzi bosembo na yo.+   Asamba likambo ya bato na yo na boyengebene,Mpe ya bato mpamba na yo na bosembo.+   Bangomba ememela bato kimya,Mpe bangomba mike emema bosembo.   Asamba mpo na bato mpamba na kati ya ekólo,Abikisa bana ya mobola,Mpe anyata moto oyo abubaka.+   Bato bakobanga yo ntango nyonso oyo moi ekozala,Mpe ntango nyonso oyo sanza ekozala,Libota na libota.+   Akozala lokola mbula oyo ezali kokwea likoló ya matiti oyo bakati,Lokola mbula makasi oyo ezali kopɔlisa mabele.+   Na mikolo na ye, bato ya sembo* bakokola lokola matiti ya sika,+Mpe kimya ekokóma mingi+ tii sanza ekozala lisusu te.   Akozala na bato oyo akokamba* banda na mbu tii na mbuMpe banda na Ebale* tii na bansuka ya mabele.+   Bato oyo bafandi na mokili ekauká bakogumbama liboso na ye,Mpe banguna na ye bakolɛmbɔla putulu.+ 10  Bakonzi ya Tarasisi mpe ya bisanga bakofuta mpako.+ Bakonzi ya Sheba mpe ya Seba bakopesa makabo.+ 11  Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye,Mpe bikólo nyonso ekosalela ye. 12  Mpo akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi,Ná moto mpamba mpe moto nyonso oyo azali na moto ya kosalisa ye te. 13  Akoyokela moto mpamba ná mobola mawa,Mpe akobikisa bomoi* ya babola. 14  Akobikisa* bango na monyoko mpe na mobulu,Mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye. 15  Azala na bomoi mpe bápesa ye wolo ya Sheba.+ Bábondela mpo na ye ntango nyonso,Mpe apambolama mokolo mobimba. 16  Bilei ekozala ebele mpenza na mabele;+Na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana. Mbuma na ye ekozala ebele lokola na Liban,+Mpe bato ya bingumba bakokóma ebele lokola milona ya mabele.+ 17  Nkombo na ye ezala mpo na libela,+Mpe eumela lokola moi. Bato bázwa lipamboli na nzela na ye;+Bikólo nyonso etánga ye moto ya esengo. 18  Yehova Nzambe, Nzambe ya Yisraele, asanzolama,+Ye moko nde asalaka makambo ya kokamwa.+ 19  Nkombo na ye ya nkembo esanzolama mpo na libela,+Mpe nkembo na ye etondisa mabele mobimba.+ Amen mpe Amen. 20  Mabondeli ya Davidi, mwana ya Yese, esuki awa.+

Maloba na nse

To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “akoyangela.”
Elingi koloba, Efrate.
To, “milimo.”
To, “Akosikola.”