Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 16

Ndenge nini okoki kolonga mitungisi?

“Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo, mpe akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moto ya sembo akwea.”

Nzembo 55:22

“Mikano ya moto oyo asalaka mosala makasi ememelaka ye litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akosuka mobola.”

Masese 21:5

“Kobanga te, mpo nazali na yo. Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi, ɛɛ nakosalisa yo, nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali, lobɔkɔ oyo esalaka oyo ezali sembo.”

Yisaya 41:10

“Nani kati na bino soki azali komitungisa akoki kobakisa ata mwa moke bolai ya bomoi na ye?”

Matai 6:27

“Na yango bómitungisa ata moke te mpo na lobi, mpo lobi ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”

Matai 6:34

“Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.”

Bafilipi 1:10

“Bómitungisaka ata na likambo moko te. Kasi na likambo nyonso, na libondeli, na lilɔmbo mpe matɔndi, bósɛngaka Nzambe lisalisi; soki bosali bongo, kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino lokola bozali kolanda Kristo Yesu.”

Bafilipi 4:6, 7