Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli na Liloba ya Nzambe

NDENGE YA KOLUKA BAVƐRSƐ NA BIBLIA

Biblia mobimba ezali na mikanda 66. Ekabolami na biteni mibale: Makomami ya Ebre mpe ya Aramɛyɛ (“Testama ya Kala”) mpe Makomami ya Grɛki (“Testama ya Sika”). Mokanda mokomoko ya Biblia ekabolami na mikapo mpe bavɛrsɛ. Soki bapesi vɛrsɛ, motángo ya liboso nsima ya nkombo ya mokanda ya Biblia ezali mokapo, mpe motángo oyo elandi ezali vɛrsɛ to bavɛrsɛ. Na ndakisa, Ebandeli 1:1 elakisi Ebandeli mokapo 1, vɛrsɛ 1.