Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 8

Nzambe nde abimiselaka bato bampasi?

“Ekoki kosalema ata moke te ete Nzambe ya solo asala likambo na motema mabe, mpe ete Mozwi-ya-Nguya-Nyonso asala likambo ya mabe!”

Yobo 34:10

“Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te, mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.”

Yakobo 1:13

“[Bóbwakela] ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.”

1 Petro 5:7

“Yehova azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”

2 Petro 3:9