Nzembo 41:1-13

  • Libondeli uta na mbeto ya maladi

    • Nzambe asalisaka moto oyo azali kobɛla (3)

    • Moninga na ye atɛki ye (9)

Epai ya mokambi ya nzembo.Mondule ya Davidi. 41  Esengo na moto oyo azali kotyela moto mpamba likebi;+Yehova akobikisa ye na mokolo ya likama.   Yehova akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi. Akotángama moto ya esengo na mabele;+Okopesa ye ata moke tena mabɔkɔ* ya bangunana ye.+   Yehova akosalisa ye na mbeto na ye ya maladi;+Ntango nyonso oyo azali kobɛla okobongola mpenza mbeto na ye.   Mpo nalobaki ete:“Ee Yehova, moniselángai boboto.+ Bikisá ngai,*+ mpo nasaleli yo lisumu.”+   Kasi banguna na ngai bazali koloba mabe mpo na ngai ete: “Ntango nini akokufa mpe nkombo na ye ekolimwa?”   Soki moko na bango ayei kotala ngai, motema na ye elobaka lokuta. Alukalukaka likambo ya mabe mpo aloba;Na nsima, akobima mpe akoyebisa yango bato mosusu.   Baoyo nyonso bayinaka ngai bazali kolobana na nse nse;Bazali kokana kosala ngai eloko moko ya mabe, balobi ete:   “Eloko moko ya nsɔmɔ ekangi ye;Sikoyo, lokola akwei na nse, akotɛlɛma lisusu te.”+   Ata moto oyo azali na kimya elongo na ngai,oyo natyelaki motema,+Moto azalaki kolya limpa na ngai, abalukeli ngai.*+ 10  Kasi yo, Ee Yehova, moniselá ngai boboto mpe tɛlɛmisá ngai,Mpo nazongisela bango oyo basalaki ngai. 11  Na likambo oyo nakoyeba ete olingaka ngai: Ntango monguna nangai akokoka lisusute koganga ete alongi ngai.+ 12  Mpo na ngai, ozali kosalisa ngai mpo na ezaleli na ngai ya kozanga mbeba;+Okobatela ngai pene na yo mpo na libela.+ 13  Yehova Nzambe ya Yisraele asanzolamaLibela na libela.*+ Amen mpe Amen.

Maloba na nse

Lil., “mposa; molimo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo na ngai.”
Lil., “atomboleli ngai litindi na ye.”
To, “Seko na seko.”