Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 19

Makambo nini ezali na mikanda ya Biblia?

MAKOMAMI YA EBRE (“TESTAMA YA KALA”)

PANTATƐKƐ (MIKANDA 5):

Ebandeli, Kobima, Balevi, Mitángo, Kolimbola Mibeko

Kobanda bozalisi tii na kosalema ya ekólo Yisraele

MIKANDA YA MASOLO YA KALA (MIKANDA 12):

Yosua, Basambisi, Ruta

Kokɔta ya Yisraele na Mokili ya Ndaka mpe nsima na yango

1 mpe 2 Samwele, 1 mpe 2 Bakonzi, 1 mpe 2 Ntango

Lisolo ya ekólo Yisraele tii na kobebisama ya Yerusaleme

Ezera, Nehemia, Estere

Lisolo ya Bayuda nsima ya kouta na Babilone

MIKANDA OYO EZALI NA BAPOƐMI (MIKANDA 5):

Yobo, Nzembo, Masese, Mosakoli, Loyembo ya Salomo

Esangisi maloba ya bwanya mpe banzembo

MIKANDA YA BISAKWELI (MIKANDA 17):

Yisaya, Yirimia, Bileli, Ezekiele, Danyele, Hosea, Yoele, Amose, Obadia, Yona, Mika, Nahumu, Habakuku, Sefania, Hagai, Zekaria, Malaki

Bisakweli oyo etali basaleli ya Nzambe

MAKOMAMI YA GRƐKI YA BOKRISTO (“TESTAMA YA SIKA”)

BAEVANZILE MINEI (MIKANDA 4):

Matai, Marko, Luka, Yoane

Lisolo ya bomoi mpe mosala ya Yesu

MISALA YA BANTOMA (MOKANDA 1):

Lisolo ya ebandeli ya lisangá ya bokristo mpe mosala ya misionɛrɛ

MIKANDA OYO ETINDAMAKI (MIKANDA 21):

Baroma, 1 mpe 2 Bakorinti, Bagalatia, Baefese, Bafilipi, Bakolose, 1 mpe 2 Batesaloniki

Mikanda epai ya masangá ya bokristo

1 mpe 2 Timote, Tito, Filemo

Mikanda oyo etindamaki epai ya bakristo mosusu

Baebre, Yakobo, 1 mpe 2 Petro, 1, 2, mpe 3 Yoane, Yuda

Mikanda oyo etindamaki mpo na bakristo nyonso

EMONISELI (MOKANDA 1):

Bisakweli oyo ntoma Yoane azwaki na nzela ya bimonaneli