Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

B1

Nsango ya Biblia

Yehova Nzambe azali na lotomo ya koyangela. Ndenge na ye ya koyangela eleki malamu. Mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato ekokokisama.

Nsima ya 4026 L.T.B.

“Nyoka” etɛmɛli lotomo ya Yehova ya koyangela mpe ndenge na ye ya koyangela. Yehova alaki ete akobimisa “mwana” to “momboto” moko oyo nsukansuka akopanza nyoka, Satana. (Ebandeli 3:1-5, 15, maloba na nse ya lokasa) Kasi, Yehova atiki ntango mpo bato bámiyangela na litambwisi ya nyoka.

1943 L.T.B.

Yehova ayebisi Abrahama ete “mwana” oyo alakamaki akozala moko ya bakitani na ye.—Ebandeli 22:18.

Nsima ya 1070 L.T.B.

Yehova alaki Mokonzi Davidi mpe na nsima mwana na ye Salomo ete “mwana” oyo alakamaki akouta na molɔngɔ ya libota na bango.—2 Samwele 7:12, 16; 1 Bakonzi 9:3-5; Yisaya 9:6, 7.

29 T.B.

Yehova amonisi ete Yesu nde “mwana” oyo alakamaki, oyo akofanda na kiti ya bokonzi Davidi.—Bagalatia 3:16; Luka 1:31-33; 3:21, 22.

33 T.B.

Nyoka, Satana, azokisi mpo na mwa ntango “mwana” oyo alakamaki na ndenge abomisaki Yesu. Yehova asekwisi Yesu mpo na bomoi na likoló, mpe andimi motuya ya bomoi ya kokoka ya Yesu, oyo epesi ye nzela ya kolimbisa masumu mpe kopesa bana ya Adama bomoi ya seko.—Ebandeli 3:15; Misala 2:32-36; 1 Bakorinti 15:21, 22.

Soki na 1914 T.B.

Yesu abwaki nyoka, Satana, na mabele mpe atiki ye wana mpo na ntango mokuse.—Emoniseli 12:7-9, 12.

Mikolo ezali koya

Yesu akotya Satana na bolɔkɔ mbula 1 000 mpe na nsima akoboma ye, to na maloba ya elilingi, akopanza motó na ye. Mokano ya Yehova ya ebandeli mpo na mabele mpe mpo na bato ekokokisama, nsɔni nyonso oyo babwakelá nkombo na ye ekolongwa mpe ndenge na ye ya koyangela ekolongisama.—Emoniseli 20:1-3, 10; 21:3, 4