Nzembo 65:1-13

  • Nzambe abatelaka mabele

    • “Moyoki ya libondeli” (2)

    • “Esengo na moto oyo oponi” (4)

    • Ebele ya mapamboli ya Nzambe (11)

Epai ya mokambi ya nzembo.Mondule ya Davidi. Loyembo. 65  Ee Nzambe, okosanzolama na ngomba Siona;+Tokokokisa bilako na biso epai na yo.+   Ee Moyoki ya libondeli, bato ya lolenge nyonso* bakoya epai na yo.+   Mabunga na ngai esilisi ngai makasi.+Kasi ozipi misala na biso ya kobuka mibeko.+   Esengo na moto oyo oponi mpe obendiMpo afanda na mapangona yo.+ Tokotonda na bolamu ya ndako na yo,+Esika mosantu ya tempelo na yo.+   Mpo na koyanola biso, okosala misala+ ya nsɔmɔ mpe ya bosembo,Ee Nzambe ya lobiko na biso;Ye oyo bato nyonso ya mabeleMpe baoyo bazali mosika kuna na mbu bakotyela motema.+   Yo* opiká makasi bangomba na nguya na yo;Yo* olatá nguya.+   Yo* okitisaka kotomboka ya mbu,+Makɛlɛlɛ ya mbonge na yango mpe mobulu ya bato ya bikólo.+   Bato oyo bafandi na bisika ya mosika bakokamwa mpo na bilembo na yo;+Okosala ete bato oyo bafandi kobanda esika moi ebimaka tii esika yango elalaka báganga na esengo.   Ozali kobatela mabele,Osali ete ebota mingi* mpe etonda mpenza na biloko.+ Otondisi mikɛli na mai;Opesi bato mbuma,+Mpo ndenge wana nde obongisaki mabele. 10  Ozali kopɔlisa banzela ya mikala mpe kolalisa mabele na yango oyo babalusá;Ozali kolɛmbisa yango na mbula monene; ozali kopambola milona na yango ya sika.+ 11  Obakisi mapamboli kitoko na mobu oyo, lokola nde olatisi yango motole;Banzela oyo ozali kotambola etondi na biloko ya kitoko.*+ 12  Bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na esobe ezali kaka kotonda,*+Mpe bangomba mike elati esengo.+ 13  Bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti etondi na bitonga,Mpe mabwaku ezipami na mbuma.+ Ezali koganga mpo nabolongi, ɛɛ, ezali koyemba.+

Maloba na nse

Lil., “mosuni nyonso.”
Lil., “Ye.”
Lil., “Ye.”
Lil., “Ye.”
Lil., “Osali ete ebota koleka ndelo.”
Lil., “Banzela na yo ezali kotangisa mafuta.”
Lil., “kotanga.”