Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 12

Tokoki kozala na elikya nini mpo na bakufi?

“Bókamwa te mpo na yango, mpo ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”

Yoane 5:28, 29

“Lisekwa ekozala, ya bato ya sembo mpe ya bato oyo bazangi bosembo.”

Misala 24:15

“Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi. Bakufi basambisamaki na kotalela makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango. Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Nkunda ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.”

Emoniseli 20:12, 13