Nzembo 36:1-12

  • Bolingo ya sembo ya Nzambe ezali kitoko

    • Moto mabe abangaka Nzambe te (1)

    • Nzambe azali liziba ya bomoi (9)

    • “Na pole na yo, tozali komona pole” (9)

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo ya Davidi, mosaleli ya Yehova. 36  Likambo mabe nde etambwisaka motema ya moto mabe;Abangaka Nzambe te.+   Lokola na miso na ye amimonaka ete azali na ntina mingiAkoki te komona libunga na ye mpe koyina yango.+   Maloba ya monɔkɔ na ye eyokisaka mpasi mpe ezali na bokosi;Azali na mayele ya kososola te mpo na kosala oyo ezali malamu.   Ata na mbeto na ye, azali kokana kosala makambo oyo eyokisaka mpasi. Atɛlɛmi na nzela oyo ezali malamu te;Aboyaka te oyo ezali mabe.   Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ekómi tii na likoló,+Bosembo na yo ezali tii na mapata.   Bosembo na yo ezali lokola bangomba milai;*+Makambo oyo olobaka ntango ozali kosambisa ezalaka lokola mai monene mpe ya mozindo.+ Ee Yehova, obatelaka* moto ná nyama.+   Ee Nzambe, bolingo na yo ya sembo ezali mpenza kitoko!+ Bana ya bato bazali kokima na elili ya mapapu na yo.+   Bamɛlaka mpe batondaka biloko kitoko oyo ezali na ndako na yo,+Mpe omɛlisaka bango mai ya mikɛli ya bisengo na yo.+   Mpo liziba ya bomoi ezali epai na yo;+Na pole na yo, tozali komona pole.+ 10  Kobá komonisa bolingo na yo ya sembo epai ya baoyo bayebi yo,+Mpe bosembo na yo epai ya baoyo bazali na motema sembo.+ 11  Kotika te ete lokolo ya moto ya lolendo enyata ngaiTo lobɔkɔ ya bato mabe ebengana ngai. 12  Kuna bato oyo basalaka mabe bakwei;Bakweisami mpe bakoki kotɛlɛma te.+

Maloba na nse

To, “obikisaka.”
Lil., “lokola bangomba ya Nzambe.”