Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 11

Nini ekómelaka moto ntango akufi?

“Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; kaka na mokolo yango makanisi na ye ekufi.”

Nzembo 146:4

“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa, kasi bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo nyonso, mpo mosala ezali te, mikano te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.”

Mosakoli 9:5, 10

“[Yesu] abakisaki: ‘Moninga na biso Lazare alali mpɔngi, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye.’ Nzokande, Yesu alobelaki liwa na ye. Kasi bango bakanisaki ete azalaki koloba ete Lazare alali mpɔngi, azali kopema. Na yango Yesu alobaki na bango polele ete: ‘Lazare akufi.’”

Yoane 11:11, 13, 14