Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 2

Ndenge nini okoki koyeba Nzambe?

“Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotánga yango na mongongo ya nse butu moi, mpo otosa mpenza makambo nyonso oyo ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde nzela na yo ekolonga mpe okosala makambo na bwanya.”

Yosua 1:8

“Bakobaki kotánga na mongongo makasi buku yango, Mobeko ya Nzambe ya solo. Balimbolaki yango polele mpe bamonisaki ntina na yango. Na ndenge yango basalisaki bato bákanga ntina ya makambo oyo ezalaki kotángama.”

Nehemia 8:8

“Esengo na moto oyo alandi te toli ya bato mabe . . . , kasi asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi. . . . Nyonso oyo akosala ekolonga.”

Nzembo 1:1-3

“Filipe akendaki mbangu pembeni na yango mpe ayokaki ye azali kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya, mpe atunaki ye ete: ‘Ozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga?’ Ye ayanolaki ete: ‘Ndenge nini nakoki kokanga ntina soki moto alakisi ngai te?’”

Misala 8:30, 31

“Bizaleli na ye oyo emonanaka te, elingi koloba nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, ezali komonana polele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, yango wana bazali kutu na likambo ya koloba te.”

Baroma 1:20

“Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”

1 Timote 4:15

“Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika te koyanganaka na makita na biso.”

Baebre 10:24, 25

“Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo apesaka bato nyonso na motema mobimba, mpe apamelaka te, mpe akopesa ye yango.”

Yakobo 1:5