Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 9

Mpo na nini bato bazali komona mpasi?

“Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka ntango nyonso na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba, ezali mpe te bato ya bwanya nde bazwaka bilei ntango nyonso, ezali mpe te bato ya mayele nde bazwaka bomɛngo ntango nyonso, mpe ezali te bato oyo bazali na boyebi nde balongaka ntango nyonso, mpo ntango ná makambo oyo ekanami te ekómelaka bango nyonso.”

Mosakoli 9:11

“Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu—.”

Baroma 5:12

“Ezali mpo na ntina yango nde Mwana ya Nzambe amonanaki: mpo na kobebisa misala ya Zabolo.”

1 Yoane 3:8

“Mokili mobimba ezali na mabɔkɔ ya moto mabe.”

1 Yoane 5:19