Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya babimisi

Biblia ezali nsango ya Nzambe oyo ekomami mpo na mokomoko na biso. Tosengeli koyekola yango mpo na koyeba Mobandisi na yango. (Yoane 17:3; 2 Timote 3:16) Na kati na yango, Yehova Nzambe amonisi mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabele, esika bafandi.—Ebandeli 3:15; Emoniseli 21:3, 4.

Ata buku moko te ebongolaka bomoi ya bato lokola Biblia. Biblia etindaka biso tómonisa bizaleli ya Yehova, lokola bolingo, motema mawa mpe boboto. Epesaka elikya oyo esalisaka bato báyika mpiko ata na makambo ya mpasi mpenza. Emonisi mpe polele makambo ya mokili, oyo eyokani te na mokano ya Nzambe, oyo ezali ya kokoka.—Nzembo 119:105; Baebre 4:12; 1 Yoane 2:15-17.

Biblia ekomamaki libosoliboso na Ebre, na Aramɛyɛ, mpe na Grɛki; lelo oyo ebongolami na mobimba to na ndambo na yango na minɔkɔ koleka 3 000. Ebongolami na minɔkɔ mingi mpe ekabolami mingi mpenza koleka babuku nyonso. Tosengeli kokamwa te. Esakweli moko ya Biblia elobi: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi [nsango ya moboko na Biblia] ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.

Lokola toyebi ete nsango ya Biblia ezali na ntina mingi, tomonisi limemya makasi ntango tobandaki kobongisa lisusu makomi ya Biblia oyo. Tomoni mokumba monene oyo tozali na yango ya kobimisa nsango yango na bosikisiki. Libongoli oyo ebongisi lisusu mosala malamu oyo esalemaki bambula eleki mpo na kobimisa Biblia—Libongoli ya mokili ya sika, oyo ebimaki liboso na Anglais eleki sikoyo mbula koleka 60. Nzokande, na bambula oyo eleki, minɔkɔ ebongwani mingi, mpe yango nde etindaki bandeko ya Komite ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika bábongisa lisusu makomi ya Biblia yango. Mokano na biso ezalaki ya kobimisa libongoli oyo eyokani mpenza na makomi ya libosoliboso, mpe oyo ezali polele mpe pɛtɛɛ na kotánga. Masolo oyo ezali na Apɛndisi “Malako mpo na kobongola Biblia,” “Makambo oyo ebongisami,” mpe “Ndenge Biblia ekómelá biso” elobeli mwa makambo oyo tobongisi na makomi ya Biblia.

Baoyo balingaka Yehova Nzambe mpe basambelaka ye balingaka libongoli ya Liloba ya Nzambe oyo ezali sikisiki mpe pɛtɛɛ na kokanga ntina. (1 Timote 2:4) Mpo na yango, tobimisi Biblia oyo ebongisami lisusu na Anglais, na likanisi ete ebongolama na minɔkɔ mingi mpenza. Yo moto oyo ozali kotánga Biblia oyo mpo na koluka Nzambe, elikya mpe libondeli na biso ezali ete esalisa yo ‘ozwa ye mpenza.’—Misala 17:27.

Komite ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika

08/2013