Nzembo 31:1-24

  • Kokima epai ya Yehova

    • “Natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo” (5)

    • “Yehova, Nzambe oyo alobaka solo” (5)

    • Bolamu ya Nzambe ezali mingi mpenza (19)

Epai ya mokambi ya nzembo.Mondule ya Davidi. 31  Ee Yehova, nakimi epaina yo.+ Nayoka nsɔni ata moke te.+ Bikisá ngai mpo na bosembo na yo.+   Tyá litoi na yo epai na ngai.* Yaká noki mpo na kobikisa ngai.+ Kómá ngomba makasi ya libateli mpo na ngai,Esika makasi mpo na kobikisa ngai.+   Mpo ozali libanga na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai;+Mpo na nkombo na yo,+okokamba ngai mpe okotambwisa ngai.+   Okobimisa ngai na monyama oyo babombi mpo na kokanga ngai,+Mpo yo ozali ndako na ngai ya makasi.+   Natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.+ Osikoli ngai, Ee Yehova, Nzambe oyo alobaka solo.*+   Nayinaka mpenza baoyo basambelaka bikeko ya mpamba, oyo ezangi ntina,Kasi ngai natyelaka nde Yehova motema.   Nakosepela mpenza na bolingo na yo ya sembo;Mpo omoni mpasi na ngai;+Oyebi mozindo ya mpasi* na ngai.   Okabi ngai na lobɔkɔ ya monguna te,Kasi otɛlɛmisi ngai na esika moko ya libateli.*   Ee Yehova, moniselá ngai boboto mpo nazali na mpasi. Mitungisi elɛmbisi miso na ngai,+ ata mpe nzoto na ngai mobimba.*+ 10  Mawa ekómisi bomoi na ngai na nsuka+Mpe bambula na ngai kaka kolelalela.*+ Makasi na ngai ezali kosila mpo na libunga na ngai;Mikuwa na ngai ezali kolɛmba.+ 11  Nakómi eloko ya kosɛka epai ya banguna na ngai nyonso,+Mingimingi epai ya baoyo bafandi zingazinga na ngai. Mpe baoyo toyebani na bango bazali na nsɔmɔ na ngai;Bazali kokima soki bamoni ngai na esika ya bato nyonso.+ 12  Balongoli ngai na mitema* na bango mpe babosani ngai, lokola moto oyo akufi;Nazali lokola elokó oyo ebukaná. 13  Nayoki nsango mingi ya mabe;Nsɔmɔ ezingi ngai.+ Bazali koyangana esika mokoMpe kosala likita mpo na koboma ngai.+ 14  Kasi natyeli yo motema,Ee Yehova.+ Nalobi ete: “Yo ozali Nzambe na ngai.”+ 15  Mikolo* na ngai ezali na lobɔkɔ na yo. Bikisá ngai na lobɔkɔ ya banguna na ngai mpe na baoyo bazali konyokola ngai.+ 16  Moniselá mosaleli na yo boboto.+ Bikisá ngai na bolingo na yo ya sembo. 17  Ee Yehova, nayoka nsɔni te ntango nazali kobelela yo.+ Bato mabe báyoka nsɔni;+Báfanda nyɛɛ na kati ya Nkunda.*+ 18  Mbɛbu ya lokuta ezanga likambo ya koloba,+Mbɛbu oyo elobaka na moto ya sembo na lofundo nyonso, na lolendo mpe na kotyola. 19  Bolamu na yo ezali mingi mpenza!+ Obombeli yango baoyo babangaka yo,+Mpe omonisi yango liboso ya bato nyonso, mpo na bolamu ya baoyo bazali kokima epai na yo.+ 20  Okobomba bango na esika ya nkuku liboso na yo+Mosika na mayele mabe ya bato;Okobomba bango na esika na yo ya libateliMosika na baoyo bazali na makanisi ya kosala mabe.*+ 21  Yehova asanzolama,Mpo amoniseli ngai bolingo na ye ya sembo na ndenge moko ya kokamwa+ na engumba oyo ezingami na bango.+ 22  Kasi ngai, nayokaki nsɔmɔ mpe nabandaki koloba: “Nakokufa liboso na yo.”+ Kasi oyokaki libondeli* na ngai ntango nabelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.+ 23  Bólinga Yehova, bino nyonso baoyo bozali sembo epai na ye!+ Yehova abatelaka bato ya sembo,+Kasi apesaka etumbu makasi na moto nyonso oyo azali na lolendo.+ 24  Bózala na mpiko, mpe motema na bino ezala makasi,+Bino nyonso baoyo bozali kozela Yehova.+

Maloba na nse

To, “Kitá mpe yoká ngai.”
To, “Nzambe ya sembo.”
To, “bampasi ya molimo.”
To, “esika monene.”
To, “molimo ná libumu na ngai.”
To, “kokimela.”
To, “makanisi.”
Lil., “Bantango.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Mosika na koswana ya lolemo.”
To, “lilɔmbɔ.”