Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 7

Bibila esakolaki nini mpo na mikolo na biso?

“Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi . . . Makambo nyonso wana ekozala ebandeli ya bampasi.”

Matai 24:7, 8

“Basakoli mingi ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi; mpe lokola kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.”

Matai 24:11, 12

“Ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba, bóbanga te; makambo wana esengeli kosalema, kasi wana ekozala naino nsuka te.”

Marko 13:7

“Koningana makasi ya mabele ekosalema, mpe na bisika ndenge na ndenge, nzala mpe bamaladi mabe ekozala. Bato bakomona makambo ya nsɔmɔ mpe bilembo minene oyo euti na likoló.”

Luka 21:11

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato oyo bamikumisaka, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, . . . bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa lokola bakangamaka na Nzambe, nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”

2 Timote 3:1-5