Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 17

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa libota na yo?

MIBALI/BATATA

“Ndenge moko mpe mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko, kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango . . . Mokomoko na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko.”

Baefese 5:28, 29, 33

“Batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na mitinda mpe na makebisi ya Yehova.”

Baefese 6:4

BASI

“Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”

Baefese 5:33

“Basi, bómikitisa liboso ya mibali na bino, mpo ebongi bongo na kati ya Nkolo.”

Bakolose 3:18

BANA

“Bana, bótosaka baboti na bino na boyokani na Nkolo, mpo yango ezali sembo: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’; ezali mobeko ya liboso elongo na elaka. Elaka yango, yango oyo: ‘Mpo makambo na yo etambola malamu mpe oumela ntango molai na mabele.’”

Baefese 6:1-3

“Bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo yango esepelisaka mpenza Nkolo.”

Bakolose 3:20