Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 3

Banani bakomaki Biblia?

“Moize akomaki maloba nyonso ya Yehova.”

Kobima 24:4

“Danyele alɔtaki ndɔtɔ moko, mpe amonaki bimonaneli ntango alalaki na mbeto na ye. Bongo akomaki ndɔtɔ yango; akomaki makambo nyonso mpenza.”

Danyele 7:1

“Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.”

1 Batesaloniki 2:13

“Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Ezali na litomba mpo na koteya bato.”

2 Timote 3:16

“Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”

2 Petro 1:21