Nzembo 23:1-6

  • “Yehova azali Mobateli na ngai”

    • “Nakozanga eloko te” (1)

    • “Apesaka ngai makasi” (3)

    • “Kɔpɔ na ngai etondi malamu” (5)

Mondule ya Davidi. 23  Yehova azali Mobateli*na ngai.+ Nakozanga eloko te.+   Alalisaka ngai na bisika ya koleisa bibwɛlɛ oyo etondi na matiti;Atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.*+   Apesaka ngai* makasi.+ Atambwisaka ngai na banzela ya bosembo*mpo na nkombo na ye.+   Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi,+Nabangaka eloko ya mabe ata moko te,+Mpo ozali elongo na ngai;+Nzete na yo mpe lingenda na yo ekitisaka ngai motema.*   Obongiseli ngai mesa liboso ya banguna na ngai.+ Otye mafuta na motó na ngai;*+Kɔpɔ na ngai etondi malamu.+   Ya solo, bolamu mpe bolingo ya sembo ekolanda ngai mikolo nyonso ya bomoi na ngai,+Mpe nakofanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai.+

Maloba na nse

Lil., “Mobateli ya mpate.”
To mbala mosusu, “mai oyo efandi kimya.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Apesaka molimo na ngai.”
To, “ebɔndisaka ngai.”
To, “Obɔndisi motó na ngai na mafuta.”