Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 1

Nzambe azali nani

“Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”

Nzembo 83:18

“Bóyeba ete Yehova azali Nzambe. Ye nde asalaki biso, mpe tozali bato na ye.”

Nzembo 100:3

“Nazali Yehova. Yango nde nkombo na ngai; napesaka nkembo na ngai na moto mosusu te, napesaka mpe lisanzoli na ngai na bikeko te.”

Yisaya 42:8

“Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”

Baroma 10:13

“Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi moto oyo azalisá biloko nyonso ezali Nzambe.”

Baebre 3:4

“Bótombola miso na bino na likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango; abengaka yango nyonso na nkombo. Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpe nguya na ye ya kokamwa, ata moko te kati na yango ezali kozanga.”

Yisaya 40:26