Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

A7-A

Makambo minene ya bomoi ya Yesu awa na mabele—Liboso Yesu abanda mosala

Masolo ya Baevanzile minei etyami na molɔngɔ

Makambo oyo ezali na bitanda eyokani na bakarte oyo emonisi mibembo mpe mosala ya kosakola ya Yesu. Makɔnga na bakarte ezali kolakisa banzela te kasi nde bisika oyo akendaki. Elembo “s.” elimboli “soki na.”

Liboso Yesu abanda mosala

NTANGO

ESIKA

LIKAMBO

MATAI

MARKO

LUKA

YOANE

3 L.T.B.

Yerusaleme, tempelo

Anzelu Gabriele asakweli Zekaria kobotama ya Yoane Mobatisi

   

1:5-25

 

s. 2 L.T.B.

Nazarete; Yudea

Anzelu Gabriele asakweli Maria kobotama ya Yesu; Maria akei kotala ndeko na ye Elizabeti

   

1:26-56

 

2 L.T.B.

Etúká ya ngombangomba ya Yudea

Yoane Mobatisi abotami mpe bapesi ye nkombo; Zekaria asakoli; Yoane akozala na esobe

   

1:57-80

 

2 L.T.B., s. 01/10

Beteleme

Yesu abotami; “Liloba akómaki moto”

1:1-25

 

2:1-7

1:14

Pene na Beteleme; Beteleme

Anzelu ayebisi nsango malamu; baanzelu basanzoli Nzambe; babateli ya mpate bakei kotala mwana

   

2:8-20

 

Beteleme; Yerusaleme

Bakati Yesu ngenga (mokolo ya 8); baboti na ye bakei kolakisa ye na tempelo (nsima ya mokolo ya 40)

   

2:21-38

 

1 L.T.B. to 1 T.B.

Yerusaleme; Beteleme; Ezipito; Nazarete

Banganga-minzoto; libota ekimi na Ezipito; Erode abomi bana mibali; libota ezongi mpe efandi na Nazarete

2:1-23

 

2:39, 40

 

12 T.B., Elekeli

Yerusaleme

Yesu na mbula 12, atuni bateyi mituna na tempelo

   

2:41-50

 
 

Nazarete

Kozonga na Nazarete; akobi komikitisa liboso ya baboti; ayekoli mosala ya mabaya; Maria akómi na bana mibali mosusu minei, ná bana basi (Mt 13:55, 56; Mr 6:3)

   

2:51, 52

 

29, prɛnta

Esobe, Ebale Yordani

Yoane Mobatisi abandi mosala na ye

3:1-12

1:1-8

3:1-18

1:6-8