Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

A3

Ndenge Biblia ekómelá biso

Nkolo mpe Mobandisi ya Biblia nde abatelaki yango. Ye moto akomisaki maloba oyo:

“Liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”Yisaya 40:8.

Maloba yango ezali solo, atako maniskri moko te ya libosoliboso ya Makomami ya Ebre mpe ya Aramayɛ a to ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ezali tii lelo. Boye, ndenge nini tokoki kondima ete makambo oyo ezali na Biblia lelo eyokani mpenza na makomi oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe?

BASALI-BAKOPI BABATELI LILOBA YA NZAMBE

Mpo na Makomami ya Ebre, ndambo ya eyano ezali na momeseno moko ya kala oyo Nzambe atyaki; alobaki ete esengeli kosala bakopi ya makomi yango. b Na ndakisa, Yehova asɛngaki bakonzi ya Yisraele básala kopi na bango moko ya Mobeko oyo ekomami. (Kolimbola Mibeko 17:18) Lisusu, Nzambe apesaki Balevi mokumba ya kobatela Mobeko mpe koteya yango bato. (Kolimbola Mibeko 31:26; Nehemia 8:7) Ntango Bayuda bautaki na Bibilone, etuluku moko ya basali-bakopi, to bakomeli (Basoferime) esalemaki. (Ezera 7:6, maloba na nse ya lokasa) Kendekende, bakomeli yango basalaki bakopi ebele ya mikanda 39 ya Makomami ya Ebre.

Na boumeli ya basiɛklɛ, bakomeli basalaki bakopi na yango na likebi mpenza. Na Moyen Áge, etuluku moko ya Bayuda oyo babengi Bamasorete bakobaki kosala bakopi. Maniskri mobimba ya Bamasorete oyo eleki koumela ezali Codex de Leningrad, ya mobu 1008/1009 T.B. Nzokande, na katikati ya bambula 1900, bamonaki baminiskri to biteni ya bamaniskri ya Biblia soki 220 na Barulo ya Mbu Ekufá. Bamaniskri yango eumelaki mbula nkóto koleka Codex de Leningrad. Kokokanisa Barulo ya Mbu Ekufá na Codex de Leningrad endimisaki likambo oyo: Atako Barulo ya Mbu Ekufá ezali na elobeli ndenge moko te bisika mosusu, ebebisi te nsango oyo ezali na kati.

Bongo mikanda 27 ya Makomami ya Grɛki ya bokristo? Bantoma mosusu ya Yesu ná mwa bayekoli ya liboso nde bakomaki yango. Na kolanda momeseno ya bakomeli ya Bayuda, bakristo ya liboso basalaki bakopi ya mikanda yango. (Bakolose 4:16) Atako Dioclétien, amperɛrɛ ya Roma, mpe basusu balukaki kobebisa mikanda nyonso ya bakristo ya liboso, ebele ya biteni ya bamaniskri mpe bamaniskri ya kala ebatelami tii lelo.

Makomi ya bakristo ebongolamaki mpe na minɔkɔ mosusu. Mabongoli ya libosoliboso ezalaki mpe na minɔkɔ ya kala lokola Arménien, Copte, Éthiopien, Géorgien, Latin, mpe Syriaque.

KOBONGISA MAKOMI YA EBRE MPE YA GRƐKI MPO NA KOBONGOLA

Bakopi nyonso te ya bamaniskri ya kala ezali na elobeli ndenge moko. Boye, ndenge nini tokoyeba makambo oyo ezalaki na makomi ya libosoliboso?

Kanisá ete molakisi asɛngi bana-kelasi 100 básala kopi ya mokapo ya buku moko. Ata soki mokapo ya buku wana ebungi, kokokanisa bakopi wana 100 ekosalisa mpo na koyeba makomi ya ebandeli. Mwana-kelasi mokomoko akoki kosala mwa bambeba, kasi ezali mpasi bana-kelasi nyonso básala bambeba ya ndenge moko. Ndenge moko mpe, ntango bato ya mayele bakokanisi biteni ya bamaniskri mpe bakopi ya kala ya mikanda ya Biblia, bakoki komona mbeba ya mosali-bakopi mpe koyeba maloba oyo ezalaki libosoliboso.

“Tokoki mpenza koloba ete buku mosusu te ya kala ebatelamaki na bosikisiki”

Nini endimisi biso ete makanisi oyo ezalaki na makomi ya Biblia ya libosoliboso ekómeli biso na bosikisiki? William Green, moto moko ya mayele, alobaki boye mpo na Makomami ya Ebre: “Tokoki mpenza koloba ete buku mosusu te ya kala ebatelamaki na bosikisiki.” Mpo na Makomami ya Grɛki ya bokristo, oyo babengaka Testama ya Sika, Frederick Bruce, moto moko ya mayele, akomaki: “Bosolo ya makomi ya Testama ya Sika na biso emonisami malamu mpenza koleka oyo ya mikanda mingi ya bakomi mosusu ya kala, mpe moto moko te amekaka kotyela yango ntembe.” Abakisaki: “Soki Testama ya Sika ezalaki mikanda ya bato, bato balingaki kondima kaka bosolo na yango.”

Mokapo 40 ya mokanda ya Yisaya na bamaniskri ya Mbu Ekufá (ya mobu 125 tii 100 L.T.B.)

Ntango bakokanisi yango na bamaniskri ya Ebre mbula nkóto na nsima, kaka mwa bokeseni moke, mingimingi na ekomeli, nde emonani.

Mokapo 40 ya buku ya Yisaya na Codex d’Alep, maniskri moko ya Ebre ya Bamasorete ya mobu soki 930 T.B.

Makomi ya Ebre: Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Ebre (Ya Anglais) (1953-1960) ebongolamaki uta na Biblia Hebraica, ya Rudolf Kittel. Banda wana, makomi ya Ebre, na ndakisa, Biblia Hebraica Stuttgartensia mpe Biblia Hebraica Quinta ebongisamaki na kolanda bolukiluki oyo euti kosalema na Barulo ya Mbu Ekufá mpe baminiskri mosusu ya kala. Mosala wana ya malamu ezongisi makomi ya codex ya Leningrad na bavɛrsɛ mpe na maloba na nse ya lokasa batye ndenge mosusu ya kobongola oyo euti esika mosusu, na ndakisa Pantatɛkɛ ya Basamaria, Barulo ya Mbu Ekufá, libongoli ya Septante, Targumu, Vulgate mpe Peshitta, Biblia na monɔkɔ ya Syriaque. Biblia Hebraica Stuttgartensia mpe Biblia Hebraica Quinta etalelamaki ntango Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezalaki kobongisama.

Makomami ya Grɛki: Na nsuka ya siɛklɛ 19, bato ya mayele Brooke Westcott ná Fenton Hort bakokanisaki bamaniskri ya Biblia na biteni ya bamaniskri mpo na kobongisa makomi ya moboko ya Grɛki oyo bamonaki ete eyokani mpenza na makomi ya libosoliboso. Na katikati ya siɛklɛ ya 20, Komite ya Biblia ya Libongoli ya Mokili ya Sika esalelaki makomi yango ya moboko mpo na kobongola. Basalelaki mpe bapapirisi ya kala, oyo balobaka ete ezali ya siɛklɛ ya mibale mpe ya misato. Banda wana bapapirisi mosusu ezwamaki. Lisusu, makomi ya moboko lokola oyo ya Nestle, ya Aland mpe ya Alliance biblique universelle ezali na makambo oyo bayekoli sika. Makambo yango mosusu oyo bamonaki, ekɔti na Biblia oyo.

Na kolanda makomi wana ya moboko, emonani ete bavɛrsɛ mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo ezali na Babiblia ya kala, na ndakisa, King James Version, basali-bakopi babakisaki yango na nsima; ezalaki te na Makomami mosantu. Lokola kokabolama ya bavɛrsɛ endimamaki na siɛklɛ ya 16, kolongola bavɛrsɛ wana nde etiki mitángo yango moko na Babiblia mingi. Bavɛrsɛ yango ezali Matai 17:21; 18:11; 23:14; Marko 7:16; 9:44, 46; 11:26; 15:28; Luka 17:36; 23:17; Yoane 5:4; Misala 8:37; 15:34; 24:7; 28:29; mpe Baroma 16:24. Na Biblia oyo, maloba na nse ya lokasa etyami na bavɛrsɛ oyo elongolami.

Mpo na bosukisi molai ya Marko 16 (vɛrsɛ 9-20), bosukisi mokuse ya Marko 16, mpe maloba ya Yoane 7:53–8:11, emonani ete bavɛrsɛ yango ezalaki te na bamaniskri ya libosoliboso. Na yango, makomi yango ezali te na Biblia oyo mpo eyebani te soki ezali solo. c

Elobeli mosusu ebongisami mpo eyokana na makomi oyo bato mingi ya mayele bandimi ete eyokani mpenza na makomi ya libosoliboso. Na ndakisa, na baminiskri mosusu, Matai 7:13 elobi: “Bókɔta na porte ya moke, mpo porte ya monene mpe nzela oyo efungwamá ezali komema na libebi.” Na Libongoli ya Mokili ya Sika ya liboso, maloba “porte ya” ezalaki te na vɛrsɛ yango. Kasi, boyekoli mozindo ya bamaniskri emonisi ete maloba “porte ya” ezalaki na makomi ya libosoliboso. Na yango, etyami na Biblia oyo. Esalami mpe bongo na bisika mosusu. Kasi, bambongwana yango ezali ya mike, mpe ata moko te ebongoli nsango ya Liloba ya Nzambe.

Maniskri moko ya Papirisi ya 2 Bakorinti 4:13–5:4 ya mobu soki 200 T.B.

a Kobanda awa tokobenga yango kaka Makomami ya Ebre.

b Ntina moko ya kosala bongo ezalaki ete bamaniskri ya libosoliboso ekomamaki na biloko oyo ebebaka.

c Mpo na koyeba ntina mosusu oyo bato babɛtɛlaka bavɛrsɛ yango ntembe, talá maloba na nse ya lokasa ya Biblia Traduction du monde nouveau (avec notes et références), oyo ebimisamaki na 1995.