Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

A4

Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre

Nkombo ya Nzambe na balɛtrɛ ya Ebre ya kala liboso Bayuda bákende na Babilone

Nkombo ya Nzambe na balɛtrɛ ya Ebre nsima ya kouta na Babilone

Nkombo ya Nzambe, oyo emonisami na balɛtrɛ minei ya Ebre יהוה, ezali mbala pene na 7000 na Makomami ya Ebre. Na Biblia oyo, balɛtrɛ yango minei oyo babengaka Tetragrami ebongolami na “Yehova.” Nkombo yango esalelami mingi koleka bankombo mosusu na Biblia. Atako bakomi ya Biblia babengi Nzambe na batitre mpe bibengeli ebele, na ndakisa “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” “Oyo-Aleki-Likoló,” mpe “Nkolo,” Tetragrami ezali nkombo kaka moko oyo basaleli mpo na kolobela Nzambe.

Yehova Nzambe ye moko nde atindaki bakomi ya Biblia básalela nkombo na ye. Na ndakisa, asalisaki mosakoli Yoele akoma: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Yoele 2:32) Asalisaki mpe mokomi moko ya nzembo akoma: “Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” (Nzembo 83:18) Kutu, nkombo ya Nzambe ezali mbala soki 700 kaka na mokanda ya Nzembo, mokanda oyo ekomamaki lokola poɛmi mpo basaleli ya Nzambe báyembaka mpe bákanga yango na motó. Bongo mpo na nini nkombo ya Nzambe ezalaka te na Babiblia mingi? Mpo na nini Biblia oyo esaleli ekomeli “Yehova”? Mpe nkombo ya Nzambe, Yehova, elimboli nini?

Biteni ya mokanda ya Nzembo euti na Rulo ya Mbu Ekufá, ya ebandeli ya siɛklɛ ya liboso T.B. Makomi oyo ezali na balɛtrɛ ya Ebre, oyo basalelaki mingi nsima ya kouta na Babilone, kasi Tetragrami ezali na balɛtrɛ ya Ebre ya kala na bisika mingi

Mpo na nini nkombo ya Nzambe ezalaka te na Babiblia mingi? Mpo na bantina mingi. Basusu bamonaka ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na mposa ya nkombo kaka moko te. Emonani ete basusu balandá momeseno mabe ya Bayuda ya koboya kosalela nkombo ya Nzambe, mbala mosusu mpo na kobanga ete bátyola yango. Basusu mpe bakanisaka ete lokola moto moko te ayebi mpenza lolenge ya kobenga nkombo ya Nzambe, malamu kosalela kaka titre, lokola “Nkolo” to “Nzambe.” Kasi, makanisi wana ebongi te, mpo na bantina oyo:

  • Bato oyo balobaka ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na mposa te ya kozala na nkombo kaka moko babosanaka ete bakopi ya ebandeli ya Liloba na ye, ata mpe oyo ebatelamaki liboso ete Kristo aya, ezalaki na nkombo ya Nzambe. Ndenge tomonaki yango, Nzambe akomisaki nkombo na ye na kati ya Liloba na ye mbala soki 7000. Ezali polele ete alingi tóyeba nkombo na ye mpe tósalelaka yango.

  • Babongoli oyo balongolaka nkombo ya Nzambe mpo na kolanda momeseno ya Bayuda babosanaka likambo moko ya ntina mingi: Bakomeli mosusu ya Bayuda baboyaki kobenga nkombo ya Nzambe, kasi balongolaki yango na bakopi na bango ya Biblia te. Barulo ya kala oyo bazwaki na Qumran, pene ya Mbu Ekufá, ezali na nkombo yango na bisika mingi. Mpo na komonisa ete nkombo ya Nzambe ezalaki na makomi ya ebandeli, babongoli mosusu batyaka titre “NKOLO” na makomi ya minene. Kasi, motuna oyo ezali kaka: Babongoli bandimaka ete nkombo ya Nzambe ezali na bisika mingi na makomi ya Biblia, kasi mpo na nini batyaka ebengeli mosusu to balongolaka nkombo yango? Bamonaka nani nde apesá bango lotomo ya kosala bongo? Kaka bango moko nde bayebi.

  • Baoyo balobaka ete esengeli te kosalela nkombo ya Nzambe mpo ndenge mpenza ya kobenga yango eyebani te, basalelaka nkombo ya Yesu mingi. Kasi, ndenge bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso bazalaki kobenga nkombo na ye ekeseni na ndenge bakristo mingi babengaka yango lelo. Na ntembe te mpo na bakristo oyo bazalaki Bayuda, nkombo Yesu ezalaki kobengama Yéshoua‛. Mpe titre “Kristo” ezalaki kobengama Mashiah, to “Masiya.” Bakristo oyo bazalaki koloba Grɛki bazalaki kobenga ye Iêsous Khristos mpe oyo bazalaki koloba Latin, Iesus Christus. Na litambwisi ya elimo santu, libongoli ya nkombo na ye na Grɛki ekomamaki na Biblia, mpe emonisi ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalelaki ebengeli oyo bato mingi bazalaki kosalela na monɔkɔ na bango. Ndenge moko, Komite ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika emoni ete ebongi kosalela nkombo “Yehova,” atako ezali mpenza te ndenge nkombo ya Nzambe ezalaki kobengama na Ebre ya kala.

Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli ekomeli “Yehova”? Na Lingala, balɛtrɛ minei ya Tetragrami (יהוה) ezali YHWH. Ndenge moko na maloba nyonso oyo ekomamaki na Ebre ya kala, Tetragrami ezalaki na ba-voyelles te. Ntango bazalaki kosalela Ebre ya kala mokolo na mokolo, batángi bazalaki kobakisa mbala moko ba-voyelles oyo esengeli.

Mbula soki 1000 nsima ya kokomama ya Makomami ya Ebre, bato ya mayele ya Bayuda babimisaki mayele ya kotya bilembo mpo na komonisa voyelles nini esengeli kosalela ntango ozali kotánga Ebre. Kasi, na ntango yango, Bayuda mingi bakómaki na biyambayamba oyo elobaki ete ezali mabe koloba nkombo ya Nzambe na mongongo makasi, mpe bakómaki kosalela bibengeli mosusu. Na yango, emonani ete ntango bazalaki kosala kopi ya Tetragrami, bazalaki kotya ba-voyelles ya bibengeli wana mosusu na kati ya balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe. Boye, bamaniskri oyo ezali na bilembo ya ba-voyelles yango esalisaki te mpo na koyeba ndenge nkombo yango ezalaki kobengama kala na Ebre. Bato mosusu bamonaka ete nkombo yango ezalaki kobengama “Yawe,” kasi basusu balobaka ndenge mosusu. Rulo moko ya Mbu Ekufá oyo ezali na eteni ya mokanda ya Balevi na Grɛki etye nkombo ya Nzambe Iaô. Bakomi ya Grɛki ya kala balobelaka mpe bibengeli Iaê, Iabé, mpe Iaoué. Kasi, ntina ya kotingama ezali te. Toyebi te mpenza ndenge basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bazalaki kobenga nkombo yango na Ebre. (Ebandeli 13:4; Kobima 3:15) Toyebi nde ete Nzambe asalelaki nkombo na ye mbala na mbala ntango asololaki na bato na ye, ete bango bazalaki kobenga ye na nkombo yango, mpe ete bazalaki kosalela yango mingi na masolo na bango.—Kobima 6:2; 1 Bakonzi 8:23; Nzembo 99:9.

Bongo mpo na nini libongoli oyo esaleli ekomeli “Yehova”? Mpo yango nde minɔkɔ mingi esalelaka banda kala.

Nkombo ya Nzambe na Ebandeli 15:2 na libongoli ya Pantatɛkɛ ya William Tyndale, mobu 1530

Mbala ya liboso oyo nkombo ya Nzambe emonanaki na Biblia ya Anglais ezalaki na 1530, na libongoli ya Pantatɛkɛ ya William Tyndale. Asalelaki ekomeli “Iehouah.” Nsima ya bambula, monɔkɔ ya Anglais ebongwanaki, mpe nkombo ya Nzambe ekómaki kokomama na ndenge ya sika. Na ndakisa, na 1612, Henry Ainsworth asalelaki ekomeli “Iehovah” na libongoli na ye mobimba ya mokanda ya Nzembo. Na nsima, na 1639, ntango babongisaki lisusu libongoli yango mpe babimisaki yango nzela moko na Pantatɛkɛ, basalelaki ekomeli “Yehova.” Na 1901, babongoli oyo babimisaki Biblia American Standard Version basalelaki ekomeli “Yehova” bisika oyo nkombo ya Nzambe ezalaki na makomi ya Ebre.

Mpo na komonisa ntina oyo asalelaki ekomeli “Yehova” na esika ya “Yawe” na buku na ye (Studies in the Psalms) oyo ebimaki na 1911, Joseph Bryant Rotherham, moto moko ya mayele, alobaki ete alingaki kosalela “ekomeli oyo batángi mingi ya Biblia bameseni na yango (mpe bandimaka mpenza).” Na 1930, moto moko ya mayele na nkombo Alexander Kirkpatrick amonisaki mpe likanisi yango mpo na ekomeli “Yehova.” Alobaki: “Bato oyo bayekolaka makambo ya minɔkɔ balobaka ete esengeli kotánga yango Yahveh to Yahaveh; kasi emonani ete YEHOVA nde efandá mpenza na monɔkɔ ya Anglais, mpe likambo eleki ntina ezali te ebengeli ya sikisiki, kasi nde kondima ete ezali Nkombo Mpenza, kasi te kaka titre lokola ‘Nkolo.’”

Tetragrami, YHWH: “Akómisaka”

Verbe HWH: “kokóma”

Nkombo Yehova elimboli nini? Na Ebre, nkombo Yehova euti na verbe moko oyo elimboli “kokóma,” mpe bato ebele ya mayele bamonaka ete epesaka likanisi ya kosala ete ezala. Na yango, Komite ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika emoni ete nkombo ya Nzambe elimboli “Akómisaka.” Bato ya mayele bazali na makanisi ndenge na ndenge, yango wana tokoki te kotingama na ndimbola yango. Atako bongo, ndimbola yango eyokani mpenza na mokumba ya Yehova ya Mozalisi ya biloko nyonso mpe Mokokisi ya mokano na ye. Asukaki kaka te na kozalisa molɔ́ngɔ́ mpe bikelamu ya mayele, kasi azali mpe kokoba kosala ete mokano na ye ekokisama.

Na yango, ndimbola ya nkombo Yehova esuki kaka te na verbe oyo eyokani na yango, oyo ezali na Kobima 3:14, ete: “Nakokóma oyo nalingi kokóma” to, “Nakozala oyo nakozala.” Soki tolandeli mpenza, maloba wana ebimisi ndimbola mobimba te ya nkombo ya Nzambe. Emonisi ete Nzambe akómaka nyonso oyo esengeli na likambo nyonso mpo na kokokisa mokano na ye. Na yango, atako nkombo Yehova epesi mpe likanisi wana, esuki kaka te na oyo ye moko aponaka kokóma. Emonisaka mpe oyo asalaka ete bozalisi na ye ekóma mpo na kokokisa mokano na ye.