Nzembo 100:1-5

  • Kopesa Mozalisi matɔndi

    • “Bósalela Yehova na esengo” (2)

    • ‘Nzambe nde moto asalaki biso’ (3)

Mondule ya kopesa matɔndi. 100  Mabele mobimba bóganga na koganga ya bolongi mpo na Yehova.+   Bósalela Yehova na esengo.+ Bókɔta liboso na ye na koganga ya esengo.   Bóyeba ete Yehova azali Nzambe.+ Ye nde asalaki biso, mpe tozali bato na ye.*+ Tozali bato na ye mpe bampate na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+   Bókɔta na baporte na ye na matɔndi,+Na mapango na ye na lisanzoli.+ Bópesa ye matɔndi; bósanzola nkombo na ye.+   Mpo Yehova azali malamu;+Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,Mpe bosembo na ye eumelaka libota na libota.+

Maloba na nse

To mbala mosusu, “kasi biso moko te.”