Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 14

Ndenge nini okoki kosalela biloko na yo?

“Moto oyo alingaka kosakanasakana akokóma mobola; moto oyo alingaka vinyo mpe mafuta akokóma mozwi te.”

Masese 21:17

“Moto oyo adefaka azali moombo ya modefisi.”

Masese 22:7

“Nani kati na bino oyo alingi kotonga ndako molai akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpe komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango? Soki te, mbala mosusu akotya moboko na yango kasi akokoka kosilisa yango te, mpe bato nyonso oyo bakotala bakobanda kosɛka ye, mpe koloba: ‘Moto oyo abandaki kotonga kasi akoki kosilisa te.’”

Luka 14:28-30

“Ntango balyaki mpe batondaki, alobaki na bayekoli na ye: ‘Bóyanganisa biteni oyo etikali, mpo ata eloko moko te ebebisama.’”

Yoane 6:12