Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 15

Ndenge nini okoki kozwa esengo?

“Elubu ya ndunda epai bolingo ezali, ezali malamu koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta epai koyina ezali.”

Masese 15:17

“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na bolamu na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.”

Yisaya 48:17

“Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo, mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango.”

Matai 5:3

“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”

Matai 22:39

“Kaka makambo bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”

Luka 6:31

“Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”

Luka 11:28

“Soki moto azali na biloko mingi, biloko oyo azali na yango ekopesa ye bomoi te.”

Luka 12:15

“Yango wana, soki tozali na bilei mpe na elamba, tósepela na biloko yango.”

1 Timote 6:8

“Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”

Misala 20:35