Ndenge ekomamá na Matai 2:1-23

  • Banganga-minzoto bayei kotala Yesu (1-12)

  • Kokima na Ezipito (13-15)

  • Erode abomisi bana mibali (16-18)

  • Kozonga na Nazarete (19-23)

2  Nsima ya kobotama ya Yesu na Beteleme+ ya Yudea na mikolo ya Erode*+ mokonzi, talá! banganga-minzoto oyo bautaki na Ɛsti bayaki na Yerusaleme.  Balobaki: “Wapi moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda?+ Mpo tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na Ɛsti, mpe toyei kogumbamela ye.”*  Ntango Mokonzi Erode ayokaki yango, abulunganaki, ye ná Yerusaleme mobimba.  Ayanganisaki banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli nyonso, mpe atunaki bango epai wapi Kristo* asengelaki kobotama.  Balobaki na ye: “Na Beteleme+ ya Yudea, mpo yango nde ekomamaki na nzela ya mosakoli, ete:  ‘Mpe yo, Ee Beteleme ya ekólo Yuda, ozali soki moke te engumba oyo ezangi ntina na miso ya baguvɛrnɛrɛ ya Yuda. Mpo moto moko oyo akoyangela akobima epai na yo, oyo akokamba bato na ngai Yisraele.’”+  Bongo Erode abengisaki banganga-minzoto yango na kobombana mpe atunaki bango ntango nini mpenza monzoto yango emonanaki.  Na nsima atindaki bango na Beteleme, alobaki: “Bókende koluka malamumalamu mwana yango ya moke, mpe soki bomoni ye, bóya koyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kogumbamela ye.”  Nsima ya koyoka maloba ya mokonzi, bakendaki, mpe talá! monzoto oyo bamonaki ntango bazalaki na Ɛsti+ ekendaki liboso na bango, tii etɛlɛmaki likoló ya esika oyo mwana yango ya moke azalaki. 10  Ntango bamonaki monzoto yango, basepelaki mingi mpenza. 11  Ntango bakɔtaki na ndako, bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye, bongo bafukamaki mpe bagumbamelaki* ye. Bafungolaki mpe biloko na bango ya motuya mpe bapesaki ye makabo: wolo, olibana ná mire. 12  Nzokande, lokola Nzambe akebisaki bango na ndɔtɔ+ ete bázonga epai ya Erode te, bazongaki na ekólo na bango na nzela mosusu. 13  Ntango bazongaki, na nsima, talá! anzelu ya Yehova* abimelaki Yozefe na ndɔtɔ,+ alobi: “Tɛlɛmá, zwá mwana ná mama na ye mpe kimá na Ezipito, fandá kuna tii ntango nakoloba na yo ozonga, mpo Erode alingi koluka mwana yango mpo aboma ye.” 14  Bongo Yozefe atɛlɛmaki mpe kaka na butu yango, azwaki mwana yango ya moke ná mama na ye mpe akendaki na Ezipito. 15  Afandaki kuna tii na liwa ya Erode. Yango ekokisaki makambo oyo Yehova* alobaki na nzela ya mosakoli na ye, ete: “Nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito.”+ 16  Ntango Erode amonaki ete banganga-minzoto bakosaki ye, ayokaki nkanda makasi mpenza, mpe atindaki báboma bana mibali nyonso na Beteleme mpe na bitúká na yango nyonso, banda na mbula mibale tii na nse. Asalaki bongo na kolanda ntango oyo monzoto ebimaki, ndenge banganga-minzoto+ bayebisaki ye. 17  Yango ekokisaki likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia, oyo alobaki: 18  “Mongongo moko eyokanaki na Rama, kolela mpe koganga na kolela mingi. Ezalaki Rashele+ moto azalaki kolela bana na ye, mpe aboyaki bábɔndisa ye, mpo bazali lisusu te.”+ 19  Ntango Erode akufaki, talá! anzelu ya Yehova* abimelaki Yozefe na ndɔtɔ+ na Ezipito. 20  Alobaki na ye: “Tɛlɛmá, zwá mwana ná mama na ye mpe zongá na mokili ya Yisraele, mpo baoyo bazalaki koluka bomoi* ya mwana yango ya moke basili kokufa.” 21  Bongo atɛlɛmaki, azwaki mwana ná mama na ye mpe azongaki na mokili ya Yisraele. 22  Kasi ntango ayokaki ete Arkelausi azali koyangela Yudea na esika ya tata na ye Erode, Yozefe abangaki kokende kuna. Lisusu, lokola Nzambe akebisaki ye na ndɔtɔ,+ akendaki na etúká ya Galile.+ 23  Afandaki na engumba moko na nkombo Nazarete,+ mpo na kokokisa likambo oyo elobamaki na nzela ya basakoli, ete: “Bakobenga ye moto ya Nazarete.”*+

Maloba na nse

To, “kokumisa ye.”
To, “Masiya; Oyo atyami mafuta.”
To, “bakumisaki ye.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “molimo.”
Mbala mosusu euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “mwa nzete ya sika.”