Ndenge ekomamá na Matai 22:1-46

  • Ndakisa ya fɛti ya libala (1-14)

  • Nzambe ná Kaisala (15-22)

  • Motuna mpo na lisekwa (23-33)

  • Mibeko mibale oyo eleki monene (34-40)

  • Kristo azali mwana ya Davidi? (41-46)

22  Yesu alobaki na bango lisusu na bandakisa, ete:  “Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi moko oyo asalaki fɛti ya libala+ mpo na mwana na ye ya mobali.  Mpe atindaki baombo na ye bábenga bato oyo babengisamaki na fɛti ya libala, kasi bato yango baboyaki koya.+  Atindaki baombo mosusu, alobi: ‘Bóyebisa bato oyo nabengisaki boye: “Nabongisi biloko ya kolya, nabomisi bangɔmbɛ na ngai ya mibali ná banyama ya mafuta, biloko nyonso elɛngɛlami. Bóya na fɛti ya libala.”’  Kasi bamonaki yango mpamba: mosusu akei na elanga na ye, mosusu akei kosala mombongo na ye.+  Kasi baoyo mosusu bakangaki baombo na ye, babɛtaki bango mpe babomaki bango.  “Mokonzi ayokaki nkanda, atindaki basoda na ye mpo báboma babomi-bato wana mpe bátumba engumba na bango.+  Na nsima alobaki na baombo na ye: ‘Fɛti ya libala elɛngɛlami, kasi bato oyo babengisamaki babongaki na yango te.+  Boye bókende na banzela oyo ekendá tii na libándá ya engumba, mpe moto nyonso oyo bokokuta bóbengisa ye na fɛti ya libala.’+ 10  Na yango baombo yango babimaki na banzela mpe bayanganisaki bato nyonso oyo bakutaki, bato mabe ná bato malamu; mpe ndako ya fɛti etondaki na bato oyo bazalaki kolya.* 11  “Ntango mokonzi akɔtaki mpo na kotala bato oyo babengisamaki, amonaki mobali moko oyo alataki elamba ya libala te. 12  Bongo alobaki na ye: ‘Moninga, ndenge nini okɔti awa na elamba ya libala te?’ Mobali yango azangaki likambo ya koloba. 13  Na yango mokonzi alobaki na basaleli na ye: ‘Bókanga ye mabɔkɔ ná makolo mpe bóbwaka ye libándá, na molili. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’ 14  “Mpo bato mingi babengisami, kasi bato moke nde baponami.” 15  Bongo Bafarisai bakendaki mpe basalaki likita bango nyonso mpo na kozwa ye na maloba na ye.+ 16  Na yango batindaki bayekoli na bango, elongo na bato ya Erode,+ báloba na ye boye: “Moteyi, toyebi ete olobaka solo mpe makambo oyo oteyaka mpo na Nzambe ezali solo, olukaka kondimama na bato te, mpo otalaka bato te ndenge bazali komonana libándá. 17  Boye yebisá biso, okanisi nini? Epesami nzela* kofuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te?” 18  Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango ya mabe, alobaki: “Bakosi, mpo na nini bozali komeka ngai? 19  Bólakisa ngai mbongo ya ebende oyo bafutaka na yango mpako.” Bayelaki ye denari moko.* 20  Atunaki bango: “Elongi oyo mpe likomi oyo ezali ya nani?” 21  Bayanolaki: “Ya Kaisala.” Bongo alobaki na bango: “Boye, bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.”+ 22  Ntango bayokaki bongo, bakamwaki mpenza. Bongo batikaki ye mpe bakendaki. 23  Kaka na mokolo yango, Basadukai, oyo balobaka ete lisekwa ezali te,+ bayaki mpe batunaki ye:+ 24  “Moteyi, Moize alobaki: ‘Soki mobali moko akufi, kasi aboti bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kozwa mwasi oyo ye atiki, mpo abotela ndeko na ye bana.’+ 25  Sikoyo ezalaki na bandeko mibali nsambo na kati na biso. Oyo ya liboso abalaki mpe akufaki, mpe lokola abotaki bana te, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. 26  Esalemaki kaka bongo na oyo ya mibale mpe oyo ya misato, tii na bango nyonso nsambo. 27  Nsukansuka, mwasi wana mpe akufaki. 28  Bongo na lisekwa, akozala mwasi ya nani kati na bango nsambo? Mpo akómaki mwasi na bango nyonso.” 29  Bongo Yesu alobaki na bango: “Bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te, boyebi mpe nguya ya Nzambe te;+ 30  mpamba te na lisekwa, mibali bakobala te mpe basi bakobalisama te, kasi bakozala lokola baanzelu na likoló.+ 31  Na likambo etali lisekwa ya bakufi, botángá te oyo Nzambe alobaki mpo na bino ete: 32  ‘Nazali Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo’?+ Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi.”+ 33  Ntango ebele ya bato wana bayokaki yango, bakamwaki mingi na mateya na ye.+ 34  Ntango Bafarisai bayokaki ete akangisaki Basadukai monɔkɔ, bayaki bango nyonso elongo epai na ye. 35  Moko na bango, oyo ayebaki Mibeko malamumalamu, alingaki komeka Yesu, atunaki ye: 36  “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?”+ 37  Alobaki na ye: “‘Osengeli kolinga Yehova* Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo* na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.’+ 38  Yango nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. 39  Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’+ 40  Mibeko nyonso mpe Basakoli esimbami na mibeko yango mibale.”+ 41  Lokola Bafarisai bayanganaki esika moko, Yesu atunaki bango:+ 42  “Bokanisi nini mpo na Kristo? Azali mwana ya nani?” Balobaki na ye: “Ya Davidi.”+ 43  Ye atunaki bango: “Bongo ndenge nini Davidi na nzela ya elimo ya Nzambe+ abengi ye ‘Nkolo,’ alobi: 44  ‘Yehova* alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo”’?+ 45  Bongo soki Davidi abengi ye ‘Nkolo,’ ndenge nini Kristo akoki kozala mwana ya Davidi?”+ 46  Moto moko te akokaki kopesa ye eyano, mpe banda mokolo wana moto moko te amekaki kotuna ye lisusu motuna.

Maloba na nse

To, “bato oyo batandami na mesa.”
To, “Ebongi.”
Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.