Ndenge ekomamá na Matai 4:1-25

  • Zabolo ameki Yesu (1-11)

  • Yesu abandi kosakola na Galile (12-17)

  • Yesu abengi bayekoli ya liboso (18-22)

  • Yesu azali kosakola, koteya, mpe kobikisa (23-25)

4  Bongo elimo ememaki Yesu na esobe mpe kuna Zabolo+ amekaki+ ye.  Nsima ya kokila bilei mikolo 40 butu moi, ayokaki nzala.  Momeki+ apusanaki pene na ye mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.”  Kasi ye azongisaki: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo euti na monɔkɔ ya Yehova.’”*+  Bongo Zabolo amemaki ye na engumba mosantu.+ Atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo*+  mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse, mpo ekomamá ete: ‘Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpe bakomema yo na mabɔkɔ na bango mpo lokolo na yo etutana na libanga te.’”+  Yesu alobaki na ye: “Ekomamá lisusu ete: ‘Osengeli te komeka Yehova* Nzambe na yo.’”+  Zabolo amemaki ye lisusu na ngomba moko ya molai mingi mpenza, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.+  Mpe alobaki na ye: “Biloko nyonso oyo nakopesa yo yango soki ofukami mpe osaleli ngai likambo moko ya losambo.” 10  Bongo Yesu alobaki na ye: “Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova*+ Nzambe na yo, mpe kaka ye nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”+ 11  Bongo Zabolo atikaki ye,+ mpe talá! baanzelu bayaki mpe babandaki kosalela ye.+ 12  Ntango Yesu ayokaki ete bakangi Yoane,+ alongwaki, akei na Galile.+ 13  Na nsima, alongwaki na Nazarete, mpe akendaki kofanda na Kapernaume+ pembeni ya mbu, na etúká ya Zebulone mpe ya Nafatali. 14  Esalemaki bongo mpo na kokokisa makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yisaya, ete: 15  “Ee mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali, ozali pembenipembeni ya nzela ya mbu, na ngámbo mosusu ya Yordani, Galile ya bato ya bikólo! 16  Bato oyo bafandi na molili bamonaki pole moko monene, mpe bato oyo bafandi na etúká ya molili ya liwa, pole+ ebimelaki bango.”+ 17  Banda na ntango wana, Yesu abandaki kosakola mpe koloba: “Bóbongola mitema, mpo Bokonzi ya likoló ekómi pene.”+ 18  Ntango Yesu azalaki kotambola pembenipembeni ya Mbu ya Galile, amonaki bandeko mibale, Simo oyo babengi Petro+ ná ndeko na ye Andre, bazali kobwaka monyama na mbu, mpo bazalaki baluki-mbisi.+ 19  Alobaki na bango: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.”+ 20  Na mbala moko basundolaki minyama na bango mpe balandaki ye.*+ 21  Ntango Yesu alongwaki wana, amonaki bato mosusu mibale oyo bazalaki bandeko, Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane.+ Bazalaki na masuwa elongo na tata na bango Zebede, bazali kobongisa minyama na bango. Bongo abengaki bango.+ 22  Na mbala moko batikaki masuwa ná tata na bango mpe balandaki ye. 23  Bongo atambolaki na Galile mobimba:+ azalaki koteya na basinagoga+ na bango, azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.+ 24  Mpe nsango na ye epanzanaki na Siri mobimba; bamemelaki ye bato nyonso oyo bazalaki konyokwama na maladi mpe na mpasi ya ndenge na ndenge,+ baoyo bazalaki na bademo,+ bato ya maladi ya ndɛkɛ+ mpe bato oyo bakufá makolo,* mpe abikisaki bango. 25  Na yango ebele ya bato balandaki ye; bautaki na Galile, na Dekapolisi,* na Yerusaleme, na Yudea mpe na ngámbo mosusu ya Yordani.

Maloba na nse

Talá Ap. A5.
To, “esika oyo eleki likoló na tempelo.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Awa, maloba “balandaki ye” elimboli bakómaki bayekoli na ye.
To, “mikatatali.”
To, “Etúká ya bingumba zomi.”