Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Masese

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Mokano ya masese (1-7)

    • Makama ya kozala na baninga mabe (8-19)

    • Bwanya ya solosolo ezali koganga na esika ya bato nyonso (20-33)

  • 2

    • Motuya ya bwanya (1-22)

      • Luká bwanya lokola biloko ya motuya oyo ebombani (4)

      • Likoki ya kokanisa ezali libateli (11)

      • Pite ememaka makama (16-19)

  • 3

    • Zalá na bwanya mpe tyelá Yehova motema (1-12)

      • Kumisá Yehova na biloko ya motuya (9)

    • Bwanya ememaka esengo (13-18)

    • Bwanya ememaka libateli (19-26)

    • Ndenge malamu ya kofanda ná basusu (27-35)

      • Soki likoki ezali, salelá basusu malamu (27)

  • 4

    • Toli ya bwanya ya tata (1-27)

      • Koleka nyonso, zwá bwanya (7)

      • Kimá nzela ya bato mabe (14, 15)

      • Nzela ya bato ya sembo ezali se kongɛnga (18)

      • “Batelá motema na yo” (23)

  • 5

    • Likebisi mpo na mwasi ya pite (1-14)

    • Sepelá na mwasi na yo (15-23)

  • 6

    • Zalá ekɛngɛ ntango omipesi ndanga (1-5)

    • “Kende epai ya furmi, yo moto ya gɔigɔi” (6-11)

    • Moto ya mpambampamba mpe ya mabe (12-15)

    • Makambo nsambo oyo Yehova ayinaka (16-19)

    • Kebá na mwasi mabe (20-35)

  • 7

    • Tosá mitindo ya Nzambe mpe okozala na bomoi (1-5)

    • Balengoli elenge mobali oyo azangi mayele (6-27)

      • “Lokola ngɔmbɛ oyo ekei kobomama” (22)

  • 8

    • Bwanya azali koloba (1-36)

      • ‘Nazali mosala ya liboso na misala ya Nzambe’ (22)

      • ‘Lokola mosali ya mayele pembeni ya Nzambe’ (30)

      • “Nazalaki kolinga mingi bana ya bato” (31)

  • 9

    • Bwanya ya solosolo ezali kobenga (1-12)

      • “Na nzela na ngai, mikolo na yo ekozala mingi” (11)

    • Mwasi ya zoba azali kobenga (13-18)

      • “Mai ya koyiba ezalaka elɛngi” (17)

  • MASESE YA SALOMO (10:1–24:34)

    • 10

      • “Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye” (1)

      • “Moto oyo asalaka mosala makasi akokóma mozwi” (4)

      • Koloba mingi ebɛtisaka libaku (19)

      • Lipamboli ya Yehova ekómisaka moto mozwi (22)

      • “Kobanga Yehova ekómisaka bomoi molai” (27)

    • 11

      • Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ (2)

      • Mopɛngwi amemaka basusu na libebi (9)

      • “Soki bapesi-toli bazali ebele makambo elongaka” (14)

      • “Moto oyo akabaka akopambolama” (25)

      • “Moto oyo atyaka motema na bomɛngo na ye akonyokwama” (28)

    • 12

      • “Moto oyo ayinaka mpamela azangi bososoli” (1)

      • “Koloba kozanga kokanisa ezali lokola kozokisa na mopanga” (18)

      • Kotya kimya ememaka esengo (20)

      • “Yehova ayinaka mbɛbu oyo elobaka lokuta” (22)

      • Motungisi enyokolaka motema (25)

    • 13

      • Baoyo balukaka toli bazali bato ya bwanya (10)

      • Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema (12)

      • “Momemi-nsango ya sembo amemaka libɔndisi” (17)

      • Kotambola na bato ya bwanya esalaka ete moto akóma na bwanya (20)

      • Disiplini emonisaka bolingo (24)

    • 14

      • “Motema ya moto nde eyebaka mpasi na yango” (10)

      • Nzela oyo emonanaka ete ebongi, ekoki komema na liwa (12)

      • Bato oyo bazangi mayele bandimaka liloba nyonso (15)

      • “Mozwi azalaka na baninga ebele” (20)

      • “Kimya ya motema epesaka nzoto kolɔngɔnɔ” (30)

    • 15

      • “Eyano ya boboto ekitisaka nkanda” (1)

      • “Miso ya Yehova emonaka eloko nyonso” (3)

      • Libondeli ya bato oyo bazangi mbeba esepelisaka Nzambe (8)

      • “Makambo elongaka te soki toli ezali te” (22)

      • Manyolá liboso ya koyanola (28)

    • 16

      • “Yehova atalatalaka makanisi” (2)

      • Tyelá Yehova motema na oyo okosala (3)

      • “Bimekeli-kilo ya sembo ezali ya Yehova” (11)

      • “Lolendo ememaka na libebi” (18)

      • Nsuki mpɛmbɛ, motole ya kitoko (31)

    • 17

      • Kofuta te mabe mpo na malamu (13)

      • Longwá liboso koswana ebima (14)

      • “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso” (17)

      • “Motema ya esengo ezali nkisi oyo ebikisaka” (22)

      • Moto ya bososoli apekisaka maloba na ye (27)

    • 18

      • Moto oyo alingaka kozala ye moko azali moimi mpe azangi bwanya (1)

      • “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi” (10)

      • Bomɛngo ezali kaka libateli na makanisi ya moto (11)

      • Koyoka ngámbo mibale ezali likambo ya bwanya (17)

      • Moninga akangamaka makasi koleka ndeko (24)

    • 19

      • Mayele ya kososola ekitisaka nkanda (11)

      • Mwasi oyo aswanaka azali lokola nsamba oyo etangaka (13)

      • “Mwasi ya mayele autaka epai ya Yehova” (14)

      • Pesá mwana disiplini ntango elikya ezali naino (18)

      • Koyoka toli ezali likambo ya bwanya (20)

    • 20

      • “Vinyo ekómisaka moto mosɛki” (1)

      • “Moto ya gɔigɔi abalolaka mabele te na eleko ya malili makasi” (4)

      • Makanisi ya moto ezali lokola mai mozindo (5)

      • Likebisi mpo na kosala elako mbangumbangu (25)

      • “Lokumu ya bilenge ezali makasi na bango” (29)

    • 21

      • Yehova abalusaka motema ya mokonzi (1)

      • Bosembo eleki mbeka (3)

      • Kosala mosala makasi ememaka litomba (5)

      • Moto oyo ayokaka moto mpamba te, ye mpe bakoyoka ye te (13)

      • Moto oyo atɛmɛlaka Yehova azangi bwanya (30)

    • 22

      • Lokumu malamu eleki bomɛngo (1)

      • Koteya mwana ntango azali naino moke ekosalisa ye bomoi mobimba (6)

      • Moto ya gɔigɔi abangaka nkɔsi oyo ezali libándá (13)

      • Disiplini elongolaka bozoba (15)

      • Moto oyo ayebi mosala malamu asalelaka bakonzi (29)

    • 23

      • Ntango babengisi yo omipekisa (2)

      • Kolanda bomɛngo te (4)

      • Bomɛngo ekoki kokima yo (5)

      • Kozala te na kati ya bato oyo bamɛlaka mingi (20)

      • Vinyo eswaka lokola nyoka (32)

    • 24

      • “Kolula bato mabe te” (1)

      • “Ndako etongamaka na bwanya” (3)

      • Moto ya sembo akoki kokwea, kasi akotɛlɛma (16)

      • Kozongisa mabe na mabe te (29)

      • Kokanga miso ememaka na bobola (33, 34)

  • MASESE YA SALOMO OYO BATO YA MOKONZI EZEKIASI BASALAKI KOPI NA YANGO (25:1–29:27)

    • 25

      • Kobatela sekele (9)

      • Maloba oyo eponami malamu (11)

      • Koboya kokɔta na makambo ya bato (17)

      • Makala ya mɔtɔ na motó ya monguna (21, 22)

      • Nsango malamu ezali lokola mai ya malili (25)

    • 26

      • Ndenge gɔigɔi azalaka (13-16)

      • Kokɔta te na koswana ya moto mosusu (17)

      • Boyá masɛki ya mabe (18, 19)

      • Soki nkoni ezali te, mɔtɔ mpe ekozala te (20, 21)

      • Maloba ya moto oyo akoselaka bato makambo ezali lokola biloko ya komɛla na lokoso (22)

    • 27

      • Mpamela ya moninga ezali na litomba (5, 6)

      • Mwana na ngai, sepelisá motema na ngai (11)

      • “Ebende epelisaka ebende” (17)

      • Yebá etonga na yo (23)

      • “Bomɛngo eumelaka libela te” (24)

    • 28

      • Libondeli ya moto oyo ayokaka te eyinamá (9)

      • Moto oyo ayamboli lisumu na ye bakoyokela ye mawa (13)

      • Moto oyo awelaka bomɛngo akozanga ngambo te (20)

      • Mpamela ezali malamu koleka maloba sukali (23)

      • Moto oyo akabaka azangaka eloko te (27)

    • 29

      • Mwana oyo asalaka oyo alingi ayokisaka nsɔni (15)

      • Soki emonaneli ezali te, bato basalaka oyo balingi (18)

      • “Moto ya nkandankanda abimisaka kowelana” (22)

      • Moto ya komikitisa azwaka nkembo (23)

      • Kobanga moto ezali motambo (25)

  • 30

    • MALOBA YA AGURE (1-33)

      • Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te (8)

      • Biloko oyo etondaka te (15, 16)

      • Biloko oyo etikaka elembo te (18, 19)

      • “Mwasi ya ekobo” (20)

      • Banyama oyo ezali na bwanya ya lɔɔmbi (24)

  • 31

    • MALOBA YA MOKONZI LEMUELE (1-31)

      • “Nani akoki kozwa mwasi ya malonga?” (10)

      • Asalaka mosala makasi (17)

      • “Boboto ezali na lolemo na ye” (26)

      • Bana mpe mobali na ye bakumisaka ye (28)

      • Bonzenga mpe kitoko ezali mpo na mwa ntango (30)