Ndenge ekomamá na Yoane 8:12-59

  • Tata apesi litatoli mpo na Yesu (12-30)

    • Yesu, “pole ya mokili” (12)

  • Bana ya Abrahama (31-41)

    • “Solo ekopesa bino bonsomi” (32)

  • Bana ya Zabolo (42-47)

  • Yesu ná Abrahama (48-59)

8   12  Bongo Yesu alobaki na bango lisusu boye: “Ngai nazali pole ya mokili.+ Moto oyo azali kolanda ngai akotambola na molili soki moke te, kasi akozala na pole+ ya bomoi.” 13  Bafarisai balobaki na ye: “Ozali kopesa litatoli mpo na yo moko; litatoli na yo ezali solo te.” 14  Yesu azongiselaki bango: “Ata soki nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo, mpo nayebi epai nauti mpe epai nazali kokende.+ Kasi bino boyebi te epai nauti mpe epai nazali kokende. 15  Bino bozali kosambisa na ndenge ya mosuni;*+ ngai nazali kosambisa ata moto moko te. 16  Mpe ata soki nasambisi, lisambisi na ngai ezali solo, mpo nazali ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai azali elongo na ngai.+ 17  Lisusu, na Mobeko na bino moko ekomamá boye: ‘Litatoli ya bato mibale ezali solo.’+ 18  Nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, mpe Tata oyo atindaki ngai azali kopesa litatoli mpo na ngai.”+ 19  Bongo balobaki na ye: “Wapi Tata na yo?” Yesu ayanolaki: “Boyebi ngai te, boyebi mpe Tata na ngai te.+ Soki boyebaki ngai mpenza, bolingaki koyeba mpe Tata na ngai.”+ 20  Alobaki maloba yango na esika ya kobomba makabo,+ wana azalaki koteya na tempelo. Kasi moto moko te akangaki ye, mpo ngonga na ye ekokaki naino te.+ 21  Bongo alobaki na bango lisusu boye: “Ngai nazali kokende, mpe bokoluka ngai, nzokande bokokufa na lisumu na bino.+ Epai nazali kokende bino bokoki koya te.”+ 22  Na yango Bayuda babandaki koloba: “Boye akokende komiboma te? Mpo alobi ete: ‘Epai nazali kokende bino bokoki koya te.’” 23  Alobaki na bango lisusu: “Bino bozali bato ya nse; ngai nazali moto ya likoló.+ Bino bozali bato ya mokili oyo; ngai nazali moto ya mokili oyo te. 24  Yango wana nalobaki na bino: Bokokufa na masumu na bino. Mpo soki bozali kondima te ete ngai nazali moto yango, bokokufa na masumu na bino.” 25  Na yango babandaki koloba na ye: “Yo ozali nani?” Yesu azongiselaki bango: “Mpo na nini kutu nazali koloba na bino? 26  Nazali na makambo mingi ya koloba mpo na bino mpe ya kosambisa. Kasi, Moto oyo atindaki ngai alobaka solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na ye, yango nde nazali koloba na mokili.”+ 27  Bakangaki ntina te ete azalaki koloba na bango mpo na Tata. 28  Bongo Yesu alobaki: “Ntango bokotombola Mwana ya moto,+ nde bokoyeba ete ngai nazali ye,+ mpe ete nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko;+ kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ngai mpe nazali koloba makambo oyo. 29  Mpe Moto oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.”+ 30  Ntango azalaki koloba makambo yango, bato mingi bakómaki kondimela ye. 31  Bongo Yesu alobaki lisusu na Bayuda oyo bandimelaki ye ete: “Soki botikali na kati ya maloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, 32  mpe bokoyeba solo,+ mpe solo ekopesa bino bonsomi.”+ 33  Bayanolaki ye: “Biso tozali bana ya Abrahama mpe tokómá baombo ya moto ata mokolo moko te. Ndenge nini ozali koloba ete: ‘Bokozwa bonsomi’?” 34  Yesu ayanolaki bango: “Ya solo mpenza, nalobi na bino, moto nyonso oyo asalaka lisumu azali moombo ya lisumu.+ 35  Lisusu, moombo atikalaka moto ya libota mpo na libela te; mwana atikalaka mpo na libela. 36  Na yango, soki Mwana apesi bino bonsomi, bokozala mpenza na bonsomi. 37  Nayebi ete bozali bana ya Abrahama. Kasi bozali koluka koboma ngai, mpo maloba na ngai ezali kosala mosala te epai na bino. 38  Nazali koloba makambo oyo namonaki ntango nazalaki na Tata na ngai,+ kasi bino bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.” 39  Bazongiselaki ye: “Tata na biso ezali Abrahama.” Yesu alobaki na bango: “Soki bozalaki bana ya Abrahama,+ bolingaki kosala misala ya Abrahama. 40  Kasi sikoyo bozali koluka koboma ngai, ngai moto nayebisi bino solo oyo nayoki epai ya Nzambe.+ Abrahama asalaki bongo te. 41  Bozali kosala misala ya tata na bino.” Balobaki na ye: “Biso tobotamá na pite* te; tozali na Tata kaka moko, Nzambe.” 42  Yesu alobaki na bango: “Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbɛlɛ bolingi ngai,+ mpo nautaki epai ya Nzambe mpe nazali awa. Nayei na ndenge na ngai moko te, kasi Moto wana nde atindaki ngai.+ 43  Mpo na nini bozali kokanga ntina te ya makambo oyo nazali koloba? Ezali mpo bokoki koyoka maloba na ngai te. 44  Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingaka kokokisa mposa ya tata na bino.+ Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki,*+ mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, amonisaka ndenge azali mpenza, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.+ 45  Kasi ngai, lokola nayebisi bino makambo ya solo, bozali kondimela ngai te. 46  Nani na kati na bino akoki kotángela ngai lisumu oyo nasali? Soki nazali koloba solo, mpo na nini bozali kondimela ngai te? 47  Moto oyo auti na Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe.+ Yango wana bino bozali koyoka te, mpo bouti na Nzambe te.”+ 48  Bayuda bazongiselaki ye: “Tolobaki nde solo te ete: ‘Ozali Mosamaria+ mpe ozali na demo’?”+ 49  Yesu ayanolaki: “Nazali na demo te, kasi nazali kokumisa Tata na ngai, mpe bino bozali kotyola ngai. 50  Kasi ngai nazali koluka nkembo mpo na ngai moko te;+ ezali na Moto moko oyo azali koluka mpe kosambisa. 51  Ya solo mpenza nalobi na bino, soki moto azali kotosa maloba na ngai, akomona liwa ata mokolo moko te.”+ 52  Bayuda balobaki na ye: “Sikoyo toyebi ete yo ozali na demo. Abrahama akufá, basakoli mpe bakufá, kasi yo olobi: ‘Soki moto azali kotosa maloba na ngai, akoyoka nsolo ya liwa ata mokolo moko te.’ 53  Yo oleki nde tata na biso Abrahama, oyo akufá? Basakoli mpe bakufá. Ozali kokanisa yo nde nani?” 54  Yesu ayanolaki: “Soki nazali komipesa nkembo ngai moko, nkembo na ngai ezali mpamba. Tata na ngai moto azali kopesa ngai nkembo,+ oyo bino bolobi ete azali Nzambe na bino. 55  Nzokande bino boyebi ye te,+ kasi ngai nayebi ye.+ Mpe soki nalobaki ete nayebi ye te, nalingaki kozala moto ya lokuta, lokola bino. Kasi nayebi ye mpe natosaka liloba na ye. 56  Abrahama tata na bino asepelaki mingi na elikya ya komona mokolo na ngai, mpe amonaki yango mpe asepelaki.”+ 57  Na yango Bayuda balobaki na ye: “Naino okokisi ata mbula 50 te, bongo omoná Abrahama?” 58  Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino, liboso ete Abrahama abotama, ngai nazalaki.”+ 59  Bongo balɔkɔtaki mabanga mpo na kobamba ye, kasi Yesu abombanaki mpe abimaki na tempelo.

Maloba na nse

To, “na kolanda mibeko ya bato.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “uta na ebandeli.”