Ndenge ekomamá na Yoane 3:1-36

  • Yesu ná Nikodeme (1-21)

    • Kobotama lisusu (3-8)

    • Nzambe alingaki mokili (16)

  • Litatoli ya nsuka ya Yoane mpo na Yesu (22-30)

  • Moto oyo auti na likoló (31-36)

3  Ezalaki na moto moko na kati ya Bafarisai na nkombo Nikodeme;+ azalaki mokonzi moko ya Bayuda.  Moto yango akendaki epai ya Yesu na butu+ mpe alobaki na ye: “Rabi,+ toyebi ete ozali moteyi oyo auti na Nzambe, mpo moto moko te akoki kosala makamwisi oyo+ ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.”+  Bongo Yesu alobaki na ye: “Ya solo mpenza nalobi na yo ete, soki moto abotami lisusu te,*+ akoki komona Bokonzi ya Nzambe te.”+  Nikodeme atunaki ye: “Ndenge nini moto akoki kobotama ntango azali mokóló? Akoki nde kokɔta na libumu ya mama na ye mpo abotama mbala ya mibale?”  Yesu ayanolaki: “Ya solo mpenza nalobi na yo, soki moto abotami te na mai+ mpe na elimo,+ akoki kokɔta na Bokonzi ya Nzambe te.  Oyo ebotami na mosuni ezali mosuni, mpe oyo ebotami na elimo ezali elimo.  Kokamwa te mpo nayebisi yo ete: Bosengeli kobotama lisusu.  Mopɛpɛ epɛpaka epai yango elingi, mpe oyokaka makɛlɛlɛ na yango, kasi oyebaka te epai yango euti mpe epai yango ezali kokende. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na elimo.”+  Na yango Nikodeme atunaki ye: “Ndenge nini makambo yango ekoki kosalema?” 10  Yesu azongiselaki ye: “Ozali moteyi ya Yisraele kasi oyebi makambo yango te? 11  Ya solo mpenza nalobi na yo, tozali koloba makambo oyo toyebi mpe tozali kopesa litatoli ya makambo oyo tomoni, kasi bino bozali kondima litatoli na biso te. 12  Nayebisi bino makambo ya mabele kasi bozali kondima te, ndenge nini bokondima soki nayebisi bino makambo ya likoló? 13  Lisusu, moto moko te amatá na likoló+ longola kaka ye oyo autaki na likoló,+ Mwana ya moto. 14  Mpe kaka ndenge Moize atombolaki nyoka na esobe,+ Mwana ya moto mpe asengeli kotombolama ndenge wana,+ 15  mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.+ 16  “Mpo Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki,+ mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye* abomama te kasi azwa bomoi ya seko.+ 17  Mpo Nzambe atindaki Mwana na ye na mokili, mpo asambisa mokili te, kasi mpo mokili ebika na nzela na ye.+ 18  Moto oyo azali komonisa kondima epai na ye akosambisama te.+ Moto oyo azali komonisa kondima te asili kosambisama, mpo amonisi kondima te na nkombo ya Mwana se moko* ya Nzambe.+ 19  Nzokande lisambisi ezali mpo na ntina oyo: pole eyaki na mokili,+ kasi bato balingaki molili na esika ya pole, mpo misala na bango ezalaki mabe. 20  Mpo moto oyo asalaka makambo ya mabe ayinaka pole mpe ayaka epai ya pole te, mpo misala na ye eyebana te.* 21  Kasi moto oyo asalaka makambo oyo ezali sembo* ayaka epai ya pole,+ mpo emonana polele ete misala na ye esalemi na boyokani na mokano ya Nzambe.” 22  Nsima na yango, Yesu ná bayekoli na ye bakendaki na nsuka mpenza ya Yudea, mpe kuna alekisaki mwa ntango elongo na bango mpe azalaki kobatisa.+ 23  Kasi Yoane mpe azalaki kobatisa na Aenone, pene ya Salime, mpo mai ezalaki mingi kuna,+ mpe bato bazalaki se koya mpe bazalaki kobatisama;+ 24  mpo Yoane abwakamaki naino na bolɔkɔ te.+ 25  Nzokande ntembe moko ebimaki kati na bayekoli ya Yoane ná Moyuda moko na likambo etali kopɛtolama. 26  Bongo bayaki epai ya Yoane mpe balobaki na ye: “Rabi, moto oyo azalaki elongo na yo na ngámbo mosusu ya Yordani, oyo opesaki litatoli mpo na ye,+ talá, ye wana azali kobatisa mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.” 27  Yoane azongisaki: “Moto akoki kozwa ata eloko moko te soki yango epesami na ye te uta na likoló. 28  Bino moko bozali batatoli ete nalobaki: ‘Ngai, nazali Kristo te,+ kasi natindamaki liboso na ye.’+ 29  Moto oyo azwi mwasi na libala, ye nde mobali ya libala.+ Kasi moninga ya mobali ya libala, ntango atɛlɛmi mpe azali koyoka ye, azalaka na esengo mingi mpo na mongongo ya mobali ya libala. Yango wana, natondisami mpenza na esengo. 30  Ye asengeli kokoba komata, kasi ngai nasengeli kokoba kokita.” 31  Moto oyo auti na likoló aleki basusu nyonso.+ Moto oyo azali na mabele azali moto ya mabele mpe alobaka makambo ya mabele. Moto oyo auti na likoló aleki basusu nyonso.+ 32  Azali kopesa litatoli na makambo oyo amonaki mpe ayokaki,+ kasi moto moko te azali kondima litatoli na ye.+ 33  Moto oyo andimi litatoli na ye, andimi* ete Nzambe alobaka solo.+ 34  Mpo moto oyo Nzambe atindi alobaka maloba ya Nzambe,+ mpo Ye* apesaka elimo mokemoke te. 35  Tata alingaka Mwana+ mpe apesi biloko nyonso na mabɔkɔ na ye.+ 36  Moto oyo azali komonisa kondima epai ya Mwana azali na bomoi ya seko;+ moto oyo azali kotosa Mwana te akozwa bomoi te,+ kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.+

Maloba na nse

To mbala mosusu, “abotami na likoló.”
To, “akondimela ye.”
Lil., “Mwana se moko oyo abotamaki.”
To, “epamelama te.”
Lil., “solo.”
Lil., “atye elembo na ye likólo na yango.”
Elingi koloba, Nzambe.