Yisaya 43:1-28

  • Yehova asangisi bato na ye (1-7)

  • Banzambe bakosambisama (8-13)

    • “Bozali batatoli na ngai” (10, 12)

  • Babimi na Babilone (14-21)

  • “Tósamba” (22-28)

43  Sikoyo Ee Yakobo, talá oyo Yehova alobi,Mozalisi na yo, mpe Moto oyo asalaki yo, Ee Yisraele:+ Kobanga te, mpo nasikoli yo.+ Nabengi yo na nkombo na yo. Ozali ya ngai.   Soki oleki na mai, nakozala elongo na yo,+Mpe soki oleki na bibale, ekozindisa yo te.+ Soki otamboli na mɔtɔ, okozika te,Lolemo ya mɔtɔ mpe ekotumba yo te.   Mpo nazali Yehova Nzambe na yo,Mosantu ya Yisraele, Mobikisi na yo. Napesi Ezipito ezala lisiko na yo,Etiopi mpe Seba na esika na yo.   Lokola okómi na motuya na miso na ngai,+Okumisami, mpenalingi yo.+ Yango wana nakopesa bato na esika na yo,Mpe bikólo na esika ya bomoi* na yo.   Kobanga te, mpo nazali elongo na yo.+ Nakoya na libota* na yo uta na ɛsti,Mpe nakoyanganisa bino uta na wɛsti.+   Nakoloba na nɔrdi ete: ‘Tiká bango!’+ Mpe na sudi ete: ‘Kokanga bango te. Yaká na bana na ngai ya mibali uta na mosika, mpe na bana na ngai ya basi uta na bansuka ya mabele,+   Moto nyonso oyo abengami na nkombo na ngai+Mpe oyo nazalisá mpo na nkembo na ngai moko,Oyo nakelá, mpe oyo nasalá.’+   Bóya na bato oyo bakufá miso atako bazali na miso,Mpe baoyo bakufá matoi atako bazali na matoi.+   Bikólo nyonso eyangana esika mokoMpe bato ya bikólo báyangana esika moko.+ Nani na kati na bango akoki koyebisa yango? To bakoki nde koyebisa biso makambo ya liboso?*+ Bábimisa batatoli mpo bámilongisa,To báyoka mpe báloba ete: ‘Ezali solo!’”+ 10  Yehova alobi: “Bino bozali batatoli na ngai,+Ɛɛ, mosaleli na ngai oyo naponi,+Mpo bóyeba mpe bóndimela ngai,*Mpo bókanga ntina ete, ngai nazali kaka ndenge nazalaka.+ Liboso na ngai Nzambe moko te asalemaki,Mpe nsima na ngai mosusu azali te.+ 11  Ngai, nazali Yehova,+ mpe longola ngai mobikisi mosusu azali te.”+ 12  “Ngai moko nasakoli, nabikisi mpe nayebisi yango,Wana nzambe mopaya ata moko te azalaki na kati na bino.+ Yango wana, bino bozali batatoli na ngai,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe ngai nazali Nzambe.+ 13  Lisusu, ntango nyonso, ngai nazali kaka ndenge nazalaka;+Moto moko te akoki kobɔtɔla ata eloko nini na lobɔkɔ na ngai.+ Soki nasali, nani akoki kopekisa ngai?”+ 14  Talá oyo Yehova, Mosikoli+ na bino, Mosantu ya Yisraele,+ alobi: “Mpo na bino, nakotinda limpinga na Babilone mpe nakokitisa bikangiseli ya baporte,+Mpe Bakaladea, na bamasuwa na bango bakoganga mpo na mpasi.+ 15  Nazali Yehova Mosantu na bino,+ Mozalisi ya Yisraele,+ Mokonzi na bino.”+ 16  Talá oyo Yehova alobi,Moto oyo asalaka nzela na mbuMpe balabala na mai oyo ezali kotomboka,+ 17  Moto oyo abimisaka likalo ya etumba mpe mpunda,+Limpinga ya basoda mpe bilombe ya etumba: “Bakolala na nse mpe bakotɛlɛma te.+ Bakokufa, bakobomama lokola nsinga ya lini oyo ezali kopela.” 18  “Bókanisa lisusu te makambo ya kala,Mpe bótikala kaka te na makambo ya kala. 19  Talá! Nazali kosala likambo moko ya sika;+Ezali sikoyo kobima. Bozali komona yango te? Nakosala nzela na esobe,+Mpe bibale na mokili ekauká.+ 20  Nyama ya zamba oyo efandaka na esobe,Bambwa ya zamba* ná bamaligbanga ekokumisa ngai,Mpo nakopesa mai na esobe,Bibale na mokili ekauká,+Mpo na komɛlisa bato na ngai, moto oyo naponá,+ 21  Bato oyo nasalá mpo na ngai moko,Mpo báyebisa lisanzoli na ngai.+ 22  Kasi obelelaki ngai te,Ee Yakobo,+Mpo olɛmbaki ngai,Ee Yisraele.+ 23  Omemeli ngai te bampate ya makabo na yo ya kotumba mobimba,Mpe okumisi ngai te na bambeka na yo. Natindi yo te ete omemela ngai likabo,Nalɛmbisi yo mpe te mpo na kosɛnga yo olibana.+ 24  Osombeli ngai te nkokó ya nsolo kitoko* na mbongo na yo;Mpe otondisi ngai te na mafuta ya bambeka na yo.+ Masumu na yo ezali lokola kilo epai na ngai;Olɛmbisi ngai na mabunga na yo.+ 25  Ngai, ngai nde Moto nazali koboma misala na yo ya kobuka mibeko*+ mpo na nkombo na ngai,+Mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.+ 26  Kundolelá ngai; tósamba;Lobá likambo ndenge oyebi yango mpo olonga. 27  Nkɔkɔ na yo ya liboso asalaki lisumu,Mpe balobeli* na yo moko batombokelaki ngai.+ 28  Yango wana, nakokómisa bankumu ya esika mosantu eloko mpamba,Mpe nakokaba Yakobo mpo abebisama,Mpe Yisraele mpo afingama.+

Maloba na nse

To, “molimo.”
Lil., “momboto.”
Mbala mosusu ezali kolobela makambo ya liboso oyo ekosalema na mikolo ezali koya.
To, “bótyela ngai motema.”
To, “bambulú.”
ya nsolo mpimbo.
To, “misala ya botomboki.”
Ekoki kolobela, “bateyi ya mibeko.”