Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Yisaya

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Tata ná bana na ye ya batomboki (1-9)

    • Yehova ayinaka losambo ya likolólikoló (10-17)

    • “Tóbongisa makambo” (18-20)

    • Siona ekozonga kozala engumba ya sembo (21-31)

  • 2

    • Ngomba ya Yehova ekotombwana (1-5)

      • Mipanga ekokóma bitimweli ya mabele (4)

    • Mokolo ya Yehova ekosambwisa bato ya lolendo (6-22)

  • 3

    • Bakambi ya Yuda babungisi bato nzela (1-15)

    • Etumbu mpo na basi ya Siona oyo balɛngolaka (16-26)

  • 4

    • Basi nsambo mpo na mobali moko (1)

    • Oyo Yehova akokolisa ekozala na nkembo (2-6)

  • 5

    • Loyembo mpo na elanga ya vinyo ya Yehova (1-7)

    • Mpasi ekokómela elanga ya vinyo ya Yehova (8-24)

    • Nzambe asilikeli bato na ye (25-30)

  • 6

    • Emonaneli ya Yehova na tempelo na ye (1-4)

      • “Mosantu, mosantu, mosantu ezali Yehova” (3)

    • Mbɛbu ya Yisaya ekómi pɛto (5-7)

    • Yisaya azwi etinda (8-10)

      • “Ngai oyo! Tindá ngai!” (8)

    • “Ee Yehova, tii ntango nini?” (11-13)

  • 7

    • Nsango epai ya mokonzi Ahaze (1-9)

      • Sheare-yashube (3)

    • Elembo ya Emanuele (10-17)

    • Mpasi oyo euti na kozanga bosembo (18-25)

  • 8

    • Asiri ekoya mpo na kobundisa (1-8)

      • Mahere-shalale-hashe-baze (1-4)

    • Kobanga te—“Nzambe azali elongo na biso!” (9-17)

    • Yisaya ná bana na ye bazali lokola bilembo (18)

    • Bótalela mobeko, kasi bademo te (19-22)

  • 9

    • Pole monene mpo na mokili ya Galile (1-7)

      • Kobotama ya “Nkumu ya Kimya” (6, 7)

    • Lobɔkɔ ya Nzambe ekobɛta Yisraele (8-21)

  • 10

    • Lobɔkɔ ya Nzambe ekobɛta Yisraele (1-4)

    • Asiri—Fimbo oyo Nzambe azali kosalela mpo na komonisa nkanda na ye (5-11)

    • Asiri ekozwa etumbu (12-19)

    • Bato ya Yakobo oyo batikali bakozonga (20-27)

    • Nzambe akosambisa Asiri (28-34)

  • 11

    • Boyangeli ya bosembo ya mwa etape ya Yese (1-10)

      • Mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana-mpate (6)

      • Boyebi ya Yehova ekotonda na mabele (9)

    • Baoyo batikalaki bazongi (11-16)

  • 12

    • Loyembo ya kopesa matɔndi (1-6)

      • “Yah Yehova azali makasi na ngai” (2)

  • 13

    • Liyebisi ya mpasi mpo na Babilone (1-22)

      • Mokolo ya Yehova ekómi pene! (6)

      • Bamede bakokweisa Babilone (17)

      • Bato bakofanda lisusu na Babilone te (20)

  • 14

    • Yisraele ekofanda na mokili na yango moko (1, 2)

    • Matumoli mpo na mokonzi ya Babilone (3-23)

      • Moto oyo azali kongɛnga akokwea uta likoló (12)

    • Lobɔkɔ ya Yehova ekobuka Moasiri (24-27)

    • Liyebisi ya mpasi mpo na Filistia (28-32)

  • 15

    • Liyebisi ya mpasi mpo na Moabe (1-9)

  • 16

    • Nsango ya mpasi mpo na Moabe ezali kokoba (1-14)

  • 17

    • Liyebisi ya mpasi mpo na Damasi (1-11)

    • Yehova akopamela bikólo (12-14)

  • 18

    • Nsango ya mpasi mpo na Etiopi (1-7)

  • 19

    • Liyebisi ya mpasi mpo na Ezipito (1-15)

    • Ezipito ekoyeba Yehova (16-25)

      • Etumbelo mpo na Yehova na Ezipito (19)

  • 20

    • Elembo mpo na Ezipito mpe Etiopi (1-6)

  • 21

    • Liyebisi mpo na esobe ya mbu (1-10)

      • Sinzili ya likebi na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli(8)

      • “Babilone akwei!” (9)

    • Liyebisi mpo na Duma mpe mokili ya patatalu oyo ekauká (11-17)

      • “Sinzili, ntɔngɔ ekotana ntango nini? (11)

  • 22

    • Liyebisi mpo na Lobwaku ya Emonaneli (1-14)

    • Eliakime azwi esika ya Kapita Shebena (15-25)

      • Pike ya elilingi (23-25)

  • 23

    • Liyebisi mpo na Tire (1-18)

  • 24

    • Yehova akotika mokili mpamba (1-23)

      • Yehova azali Mokonzi na Siona (23)

  • 25

    • Mapamboli ebele mpo na basaleli ya Nzambe (1-12)

      • Yehova abongisi fɛti ya vinyo ya kitoko (6)

      • Liwa ekozala lisusu te (8)

  • 26

    • Loyembo oyo elobeli kotya motema mpe lobiko (1-21)

      • Yah Yehova, azali Libanga mpo na seko (4)

      • Bafandi ya mabele bakoyekola bosembo(9)

      • “Bakufi na yo bakozonga na bomoi” (19)

      • Kɔtá na bashambrɛ ya kati mpe bombaná (20)

  • 27

    • Yehova abomi Leviatana (1)

    • Loyembo mpo na Yisraele oyo ekokani na elanga ya vinyo (2-13)

  • 28

    • Mawa na balangwi-masanga ya Efraime! (1-6)

    • Banganga-nzambe mpe basakoli ya Yuda bazwi kizunguzungu (7-13)

    • “Kondimana ná liwa” (14-22)

      • Libanga ya ntina mingi oyo ezali na motuya na Siona (16)

      • Mosala ya Yehova oyo esalemá naino te (21)

    • Ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova asembolaka na bwanya (23-29)

  • 29

    • Mawa na Ariele! (1-16)

      • “Bakumisaka ngai kaka na mbɛbu na bango” (13)

    • Bato oyo bakufá matoi bakoyoka; mpe bato oyo bakufá miso bakomona (17-24)

  • 30

    • Lisalisi ya Ezipito ezali na ntina ata moke te (1-7)

    • Bato baboyi nsango ya esakweli (8-14)

    • Bokozala na nguya soki botye motema (15-17)

    • Yehova amoniseli bato na ye boboto (18-26)

      • Yehova azali Moteyi Monene (20)

      • “Nzela yango oyo” (21)

    • Yehova akopesa Asiri etumbu (27-33)

  • 31

    • Lisalisi ya solosolo eutaka epai ya Nzambe, kasi epai ya bato te (1-9)

      • Bampunda ya Ezipito ezali mosuni (3)

  • 32

    • Mokonzi moko mpe bankumu bakoyangela mpo na bosembo ya solosolo (1-8)

    • Likebisi epai ya basi oyo bafandi na kimya (9-14)

    • Mapamboli ntango elimo ekosopana (15-20)

  • 33

    • Kosambisa mpe elikya mpo na moto ya sembo (1-24)

      • Yehova azali Mosambisi, Mopesi-mibeko mpe Mokonzi (22)

      • Moto moko te akoloba: “Nazali kobɛla” (24)

  • 34

    • Yehova akopesa bikólo etumbu (1-4)

    • Edome ekotikala mpamba (5-17)

  • 35

    • Paradiso ekozonga lisusu (1-7)

      • Bakufi miso bakomona; bato oyo bayokaka te bakoyoka (5)

    • Nzela ya bosantu ezali mpo na baoyo basikolami (8-10)

  • 36

    • Senakeribe ayei kobundisa Yuda (1-3)

    • Rabashake atumoli Yehova (4-22)

  • 37

    • Ezekiasi aluki lisalisi ya Nzambe na nzela ya Yisaya (1-7)

    • Senakeribe atungisi Yerusaleme (8-13)

    • Libondeli ya Ezekiasi (14-20)

    • Yisaya apesi eyano ya Nzambe (21-35)

    • Anzelu moko abomi bato ya Asiri 185 000 (36-38)

  • 38

    • Ezekiasi abɛli mpe abiki (1-22)

      • Loyembo ya kopesa matɔndi (10-20)

  • 39

    • Bamemi-nsango bauti na Babilone (1-8)

  • 40

    • Libɔndisi mpo na basaleli ya Nzambe (1-11)

      • Mongongo moko na esobe (3-5)

    • Bonene ya Nzambe (12-31)

      • Bikólo ezali lokola litangá ya mai na katini (15)

      • Nzambe afandi likoló “ya sɛrklɛ ya mabele” (22)

      • Nzambe abengaka minzoto nyonso na nkombo na yango (26)

      • Nzambe alɛmbaka te (28)

      • Kotyela Yehova elikya epesaka nguya ya sika (29-31)

  • 41

    • Molongi moko oyo auti epai moi ebimaka (1-7)

    • Nzambe aponi Yisraele lokola mosaleli na ye (8-20)

      • “Abrahama moninga na ngai” (8)

    • Banzambe mosusu bamekami (21-29)

  • 42

    • Mosaleli ya Nzambe mpe mokumba na ye (1-9)

      • ‘Yehova ezali nkombo na ngai’ (8)

    • Loyembo ya sika mpo na kosanzola Yehova (10-17)

    • Yisraele akufá miso mpe ayokaka te (18-25)

  • 43

    • Yehova asangisi bato na ye (1-7)

    • Banzambe bakosambisama (8-13)

      • “Bozali batatoli na ngai” (10, 12)

    • Babimi na Babilone (14-21)

    • “Tósamba” (22-28)

  • 44

    • Mapamboli na bato oyo Nzambe aponi (1-5)

    • Longola Yehova, Nzambe mosusu azali te (6-8)

    • Bikeko oyo moto asali ezangi mpenza ntina (9-20)

    • Yehova azali Mosikoli ya Yisraele (21-23)

    • Ekotongama lisusu na nzela ya Siruse (24-28)

  • 45

    • Siruse aponami mpo na kozwa Babilone (1-8)

    • Mabele ekoki te kotyela Moyemi na yango ntembe (9-13)

    • Bikólo mosusu ekogumbamela Yisraele (14-17)

    • Nzambe abongi kotyelama motema: bozalisi mpe bimonaneli na ye emonisi yango (18-25)

      • Mabele esalemaki mpo bato báfanda (18)

  • 46

    • Nzambe ya Yisraele aleki bikeko ya Babilone (1-13)

      • Yehova ayebisaka makambo oyo ekoya (10)

      • Ndɛkɛ oyo ekangaka nyama euti epai moi ebimaka (11)

  • 47

    • Kokwea ya Babilone (1-15)

      • Bato oyo batalatalaka minzoto bazangi makasi (13-15)

  • 48

    • Yisraele apamelami mpe apɛtolami (1-11)

    • Yehova akobimisela Babilone mpasi (12-16a)

    • Mateya ya Nzambe ezali na litomba (16b-19)

    • “Bóbima na Babilone!” (20-22)

  • 49

    • Yehova apesi mosaleli na ye mokumba (1-12)

      • Pole ya bikólo (6)

    • Libɔndisi mpo na Yisraele (13-26)

  • 50

    • Masumu ya Bayisraele ebimiseli bango mikakatano (1-3)

    • Mosaleli ya botosi ya Yehova (4-11)

      • Lolemo mpe litoyi ya baoyo bateyami (4)

  • 51

    • Siona oyo ezongisami ekozala lokola elanga ya Edene (1-8)

    • Libɔndisi oyo euti epai ya Moto ya nguya oyo asalaki Siona (9-16)

    • Kɔpɔ ya nkanda makasi ya Yehova (17-23)

  • 52

    • Lamuká, Ee Siona! (1-12)

      • Makolo ya moto oyo azali koya na nsango malamu ezali kitoko (7)

      • Basinzili ya Siona bagangi elongo (8)

      • Baoyo bazali komema bisaleli ya Yehova basengeli kozala pɛto (11)

    • Mosaleli ya Yehova akokumisama (13-15)

      • Elongi ebebisamaki (14)

  • 53

    • Mpasi, liwa mpe kokundama ya mosaleli ya Yehova (1-12)

      • Batyoli ye mpe bakimi ye (3)

      • Amemi maladi mpe mpasi na biso (4)

      • “Lokola mpate oyo ekei kobomama” (7)

      • Amemi lisumu ya bato ebele (12)

  • 54

    • Siona, ekomba akobota bana ebele (1-17)

      • Yehova azali mobali ya Siona (5)

      • Bana ya Siona bakoteyama na Yehova (13)

      • Ebundeli oyo esalemi mpo na kosala Siona mabe ekolonga te (17)

  • 55

    • Libyangi ya kolya mpe ya komɛla ofele (1-5)

    • Bóluka Yehova mpe liloba na ye oyo ebongi kotyelama motema (6-13)

      • Ndenge Nzambe asalaka makambo eleki mosika oyo ya bato (8, 9)

      • Liloba ya Nzambe ekokokisama mpenza (10, 11)

  • 56

    • Mapamboli mpo na bapaya mpe mikube (1-8)

      • Ndako ya mabondeli mpo na bato nyonso (7)

    • Basinzili oyo bakufá miso, bambwa oyo egangaka te (9-12)

  • 57

    • Moyengebene ná bato ya sembo bakufi (1, 2)

    • Bondumba ya Yisraele ya elimo emonisami polele (3-13)

    • Libɔndisi mpo na bato ya komikitisa (14-21)

      • Bato mabe bazali lokola mbu oyo ezali kotombwatombwana (20)

      • Bato mabe bazali na kimya te (21)

  • 58

    • Kokila bilei oyo esepelisaka Nzambe mpe oyo esepelisaka ye te (1-12)

    • Esengo oyo eutaka na kotosa Sabata (13, 14)

  • 59

    • Masumu ya Bayisraele ekaboli bango na Nzambe (1-8)

    • Koyambola masumu (9-15a)

    • Boboto ya Yehova epai ya baoyo babongoli motema (15b-21)

  • 60

    • Nkembo ya Yehova engɛngi na Siona (1-22)

      • “Lokola bibenga oyo ezali koya na bandako na yango” (8)

      • Wolo na esika ya kwivrɛ (17)

      • Oyo ya moke akokóma nkóto (22)

  • 61

    • Atyami mafuta mpo na kosakola nsango malamu (1-11)

      • “Mbula ya boboto ya Yehova” (2)

      • “Banzete minene ya bosembo” (3)

      • Bapaya bakosalisa (5)

      • “Banganga-nzambe ya Yehova” (6)

  • 62

    • Nkombo ya sika ya Siona (1-12)

  • 63

    • Yehova azongiseli bikólo mabe (1-6)

    • Bolingo ya sembo ya Yehova na ntango ya kala (7-14)

    • Libondeli ya kobongola motema (15-19)

  • 64

    • Libondeli ya kobongola motema ezali kokoba (1-12)

      • Yehova azali “Moyemi na biso” (8)

  • 65

    • Yehova apesi basambeli ya bikeko etumbu (1-16)

      • Banzambe ya Makila malamu mpe ya Makambo oyo etángamá (11)

      • “Basaleli na ngai bakolya” (13)

    • Likoló ya sika mpe mabele ya sika (17-25)

      • Bakotonga bandako; bakolona bilanga ya vinyo (21)

      • Bakoboma nzoto kaka mpamba te (23)

  • 66

    • Losambo ya solo mpe ya lokuta (1-6)

    • Siona: mama ná bana na ye (7-17)

    • Bato bayangani na Yerusaleme mpo na kosambela (18-24)