Yisaya 35:1-10

  • Paradiso ekozonga lisusu (1-7)

    • Bakufi miso bakomona; bato oyo bayokaka te bakoyoka (5)

  • Nzela ya bosantu ezali mpo na baoyo basikolami (8-10)

35  Esobe mpe mokili oyo ezangá mai ekosepela,+Mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.+   Ya solo ekobimisa bafololo;+Ekosepela mpe ekoganga na esengo. Bakopesa yango nkembo ya Liban,+Nkembo ya Karamele+ mpe ya Sharone.+ Bakomona nkembo ya Yehova, lokumu ya Nzambe na biso.   Bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbi,Mpe bókembisa mabɔlɔngɔ oyo ezali kolɛnga.+   Bóyebisa baoyo bazali motema likoló boye: “Bózala makasi. Bóbanga te. Talá! Nzambe na bino akoya kozongisa mabe,Nzambe akoya kopesa etumbu.+ Akoya mpe akobikisa bino.”+   Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama,+Mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama.+   Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe,+Mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.+ Mpo mai ekobima na esobe,Mpe mikɛli na mokili patatalu oyo ekauká.   Mabele oyo ekauká ekokóma etima oyo etondi na matiti,Mpe mabele oyo ezangá mai ekokóma maziba ya mai.+ Na esika oyo bambwa ya zamba* ezalaki kopema,+Ekozala na matiti ya mobesu, matiti ya ebale ná papirisi.   Mpe balabala moko ya monene ekozala kuna,+Ɛɛ nzela oyo ekobengama Nzela ya Bosantu. Moto ya mbindo akoleka kuna te.+ Yango ezali kaka mpo na bato oyo bapesami nzela ya koleka* kuna;Bazoba bakoyengayenga kuna te.   Nkɔsi moko te ekozala kuna,Mpe nyama moko te ya zamba oyo elyaka nyama ekoya kuna. Moko te ekomonana kuna;+Kaka baoyo basikolami nde bakotambola kuna.+ 10  Baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe bakoya na Siona na koganga ya esengo.+ Esengo oyo ezangi nsuka ekozala na mitó na bango.+ Bakosepela mpe bakozala na esengo,Mpe mawa ná kolelalela* ekokima.+

Maloba na nse

To, “bambulú.”
To, “ya kotambola.”
To, “kokimela.”