Emoniseli epai ya Yoane 12:1-17

  • Mwasi, mwana mobali mpe dragɔ (1-6)

  • Mikaele abundi ná dragɔ (7-12)

    • Dragɔ ebwakami na mabele (9)

    • Zabolo ayebi ete atikali na ntango mokuse (12)

  • Dragɔ enyokoli mwasi (13-17)

12  Bongo elembo moko ya monene emonanaki na likoló: mwasi moko+ alati moi, sanza ezalaki na nse ya makolo na ye, mpe na motó na ye azalaki na motole ya minzoto 12.  Azalaki na zemi, azalaki koganga na mpasi mpe na mitungisi ya kobota.  Elembo mosusu emonanaki na likoló. Talá! Dragɔ+ moko monene ya langi ya motane ngwaa, ezali na mitó nsambo, maseke zomi mpe na mitole* nsambo na mitó na yango;  mpe mokila na yango ezali kobenda moko ya bandambo misato ya minzoto+ ya likoló, mpe ebwakaki yango na mabele.+ Mpe dragɔ etɛlɛmaki liboso ya mwasi yango+ oyo alingaki kobota, mpo ntango akobota, elya mwana na ye.  Mpe abotaki mwana,+ mwana mobali, oyo akokamba bikólo nyonso na lingenda ya ebende.+ Mpe na mbala moko mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe esika kiti na ye ya bokonzi ezali.  Mpe mwasi yango akimaki na esobe, epai Nzambe abongiselá ye esika oyo akoleisama mikolo 1 260.+  Mpe etumba ebimaki na likoló: Mikaele*+ ná baanzelu na ye babundaki na dragɔ, mpe dragɔ ná baanzelu na yango babundaki  kasi balongaki te,* mpe bazalaki lisusu na esika te na likoló.  Bongo dragɔ+ yango ya monene ebwakamaki na nse, nyoka ya ebandeli,+ oyo babengi Zabolo+ mpe Satana,+ oyo azali kokosa mokili mobimba;*+ abwakami na mabele,+ mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye. 10  Nayokaki mongongo moko ya makasi na likoló elobi: “Sikoyo lobiko,+ ná nguya, ná Bokonzi ya Nzambe na biso,+ ná bokonzi ya Kristo na ye eyei, mpo mofundi ya bandeko na biso abwakami na nse, ye moto afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso!+ 11  Mpe balongaki ye+ mpo na makila ya Mwana-Mpate+ mpe mpo na litatoli oyo bapesaki,*+ mpe balingaki milimo*+ na bango te ata liboso ya liwa. 12  Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló! Mawa na mabele mpe na mbu,+ mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete atikali na ntango mokuse.”+ 13  Bongo ntango dragɔ emonaki ete ebwakami na mabele,+ enyokolaki mwasi yango+ oyo abotaki mwana mobali. 14  Kasi bapesaki mwasi yango mapapu mibale ya mpongo monene,+ mpo apumbwa na esobe tii na esika oyo ebongisamaki mpo na ye, epai asengeli koleisama na boumeli ya ntango moko mpe ya bantango mpe ya katikati ya ntango*+ mosika na nyoka yango.+ 15  Mpe nyoka yango esanzaki mai lokola ebale na monɔkɔ na yango na nsima ya mwasi yango, mpo ezindisa ye na ebale yango. 16  Kasi mabele eyaki kosalisa mwasi, mpe mabele efungolaki monɔkɔ na yango mpe emɛlaki ebale oyo dragɔ esanzaki na monɔkɔ na yango. 17  Mpe dragɔ eyokelaki mwasi yango nkanda, mpe ekendaki kobunda etumba na bana* ya mwasi yango oyo batikalaki,+ oyo batosaka mitindo ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.+

Maloba na nse

To, “bilembo ya bokonzi.”
Elimboli, “nani akokani na Nzambe?”
To mbala mosusu, “kasi elongaki te [elingi koloba, dragɔ].”
To, “mabele mobimba esika bato bafandi.”
Lil., “mpo na liloba ya litatoli na bango.”
To, “bomoi.” Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, “ntango misato na ndambo.”
To, “libota.” Lil., “momboto.”