Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Emoniseli

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Emoniseli oyo euti na Nzambe, na nzela ya Yesu (1-3)

    • Mbote na masangá nsambo (4-8)

      • “Ngai nazali Alfa ná Omega” (8)

    • Yoane akómi na mokolo ya Nkolo na nzela ya elimo santu (9-11)

    • Emonaneli ya nkembo ya Yesu (12-20)

  • 2

    • Nsango epai ya Efese (1-7), epai ya Simirna (8-11), epai ya Pergame (12-17), epai ya Tyatire (18-29)

  • 3

    • Nsango epai ya Sarde (1-6), epai ya Filadelfia (7-13), epai ya Laodikia (14-22)

  • 4

    • Emonaneli ya komonana ya Yehova na likoló (1-11)

      • Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi (2)

      • Bankulutu 24 na bakiti ya bokonzi (4)

      • Bikelamu minei ya bomoi (6)

  • 5

    • Rulo ná bilembo nsambo (1-5)

    • Mwana-Mpate azwi rulo (6-8)

    • Mwana-Mpate abongi kofungola bilembo (9-14)

  • 6

    • Mwana-Mpate afungoli bilembo motoba ya liboso (1-17)

      • Molongi likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ (1, 2)

      • Moto oyo afandi likoló ya mpunda ya motane ngwaa asengeli kolongola kimya (3, 4)

      • Moto oyo afandi likoló ya mpunda ya moindo azali komema nzala (5, 6)

      • Moto oyo afandi likoló ya mpunda ya langi ya mwa moke lokola mai ya pondu nkombo na ye liwa (7, 8)

      • Bato oyo babomami bazali na nse ya etumbelo (9-11)

      • Koningana monene ya mabele (12-17)

  • 7

    • Baanzelu minei basimbi mipɛpɛ ya libebi (1-3)

    • Bato 144 000 batyami elembo (4-8)

    • Ebele mpenza ya bato balati bazambala ya mpɛmbɛ (9-17)

  • 8

    • Elembo ya nsambo efungwami (1-6)

    • Kobɛtama ya kelelo minei ya liboso (7-12)

    • Mawa misato eyebisami (13)

  • 9

    • Kelelo ya mitano (1-11)

    • Mawa moko eleki, mibale mosusu ezali koya (12)

    • Kelelo ya motoba (13-21)

  • 10

    • Anzelu moko ya makasi ná rulo moko ya moke (1-7)

      • “Ntango ya kozela ekozala lisusu te” (6)

      • Sekele mosantu ekokokisama (7)

    • Yoane alei rulo ya moke (8-11)

  • 11

    • Batatoli mibale (1-13)

      • Bazali kosakola mikolo 1 260, balati ngɔtɔ (3)

      • Babomami mpe bakundami te (7-10)

      • Bazongisami na bomoi nsima ya mikolo misato ná ndambo (11, 12)

    • Mawa ya mibale eleki, ya misato ezali koya (14)

    • Kelelo ya nsambo (15-19)

      • Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristo na ye (15)

      • Baoyo bazali kobebisa mabele bakobebisama (18)

  • 12

    • Mwasi, mwana mobali mpe dragɔ (1-6)

    • Mikaele abundi ná dragɔ (7-12)

      • Dragɔ ebwakami na mabele (9)

      • Zabolo ayebi ete atikali na ntango mokuse (12)

    • Dragɔ enyokoli mwasi (13-17)

  • 13

    • Nyama mabe ya mitó nsambo ebimi na mbu (1-10)

    • Nyama ya maseke mibale ebimi na mabele (11-13)

    • Elilingi ya nyama mabe ya mitó nsambo (14, 15)

    • Elembo mpe motángo ya nyama mabe (16-18)

  • 14

    • Mwana-Mpate mpe bato 144 000 (1-5)

    • Nsango oyo euti epai ya baanzelu misato (6-12)

      • Anzelu na katikati ya likoló azali kosakola nsango malamu (6, 7)

    • Esengo na baoyo bazali kokufa na bomoko elongo na Kristo (13)

    • Ntango mibale ya kobuka mbuma na mabele (14-20)

  • 15

    • Baanzelu nsambo mpe malɔzi nsambo (1-8)

      • Loyembo ya Moize mpe ya Mwana-Mpate (3, 4)

  • 16

    • Mabakuli nsambo ya nkanda ya Nzambe (1-21)

      • Bósopa na mabele (2), na mbu (3), na bibale mpe maziba ya mai (4-7), na moi (8, 9), na kiti ya bokonzi ya nyama mabe (10, 11), na Efrate (12-16), mpe na mopɛpɛ (17-21)

      • Etumba ya Nzambe na Armagedone (14, 16)

  • 17

    • Kosambisama ya “Babilone Monene” (1-18)

      • Mwasi ya ndumba monene afandeli nyama mabe ya langi ya motane makasi (1-3)

      • Nyama ezalaki, ezali te, kasi ekobima na libulu mozindo (8)

      • Maseke zomi bakobundisa Mwana-Mpate (12-14)

      • Maseke zomi bakoyina mwasi ya ndumba (16, 17)

  • 18

    • Kokwea ya “Babilone Monene” (1-8)

      • “Bóbima na kati na ye, bato na ngai” (4)

    • Kolela mpo na kokwea ya Babilone (9-19)

    • Esengo na likoló mpo na kokwea ya Babilone (20)

    • Babilone ekobwakama na mbu lokola libanga (21-24)

  • 19

    • Bósanzola Yah mpo na bikateli na ye (1-10)

      • Libala ya Mwana-Mpate (7-9)

    • Moto oyo afandi likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ (11-16)

    • Fɛti monene ya mpokwa ya Nzambe (17, 18)

    • Balongi nyama mabe (19-21)

  • 20

    • Satana akangami mpo na mbula 1 000 (1-3)

    • Bakonzi elongo na Kristo mpo na mbula 1 000 (4-6)

    • Bafungoli Satana, na nsima abomami (7-10)

    • Bakufi basambisami liboso ya kiti ya bokonzi ya mpɛmbɛ (11-15)

  • 21

    • Likoló ya sika ná mabele ya sika (1-8)

      • “Liwa ekozala lisusu te (4)

      • “Biloko nyonso biloko ya sika” (5)

    • Yerusaleme ya sika elimbolami (9-27)

  • 22

    • Ebale ya mai ya bomoi (1-5)

    • Maloba ya nsuka (6-21)

      • ‘Yaká! Zwá mai ya bomoi ofele’ (17)

      • “Yaká, Nkolo Yesu” (20)