Danyele 8:1-27

  • Emonaneli ya mpate-mobali mpe ya ntaba-mobali (1-14)

    • Liseke moko ya moke emikumisi (9-12)

    • Emonaneli ekoumela mpokwa mpe ntɔngɔ 2 300 (14)

  • Gabriele apesi ndimbola ya emonaneli (15-27)

    • Ndimbola ya mpate-mobali mpe ya ntaba-mobali (20, 21)

    • Mokonzi moko ya elongi nkandankanda atɛlɛmi (23-25)

8  Na mbula ya misato ya bokonzi ya Beleshazare,+ ngai Danyele nazwaki emonaneli moko, longola oyo nazwaki liboso.+  Nazalaki kotala na emonaneli yango, mpe namonaki ete nazalaki na Shushane*+ ndako makasi,* oyo ezali na etúká* ya Elame.+ Na emonaneli yango, namonaki ete nazali pene na mai ya Ulai.  Ntango natombolaki miso, namonaki mpate-mobali+ moko etɛlɛmi liboso ya mai yango, mpe ezalaki na maseke mibale.+ Maseke yango mibale ezalaki milai, kasi moko elekaki mosusu na molai, mpe oyo ebimaki nsima nde elekaki na molai.+  Namonaki mpate-mobali yango ezali kobɛta maseke na wɛsti, na nɔrdi mpe na sudi; ata nyama moko te ya zamba ekokaki kotɛlɛma liboso na yango, mpe ata moto moko te akokaki kobikisa banyama yango na nguya ya mpate-mobali.*+ Esalaki ndenge elingi mpe emikumisaki.  Nazalaki kaka kotala, mpe namonaki ntaba-mobali moko+ euti na wɛsti,* ezali kokatisa na mbangu mabele mobimba kozanga ete makolo na yango etuta na nse. Ntaba yango ezalaki na liseke moko oyo ezalaki komonana polele na katikati ya miso na yango.+  Ezalaki koya epai ya mpate-mobali ya maseke mibale, oyo namonaki etɛlɛmi liboso ya mai; ezalaki kokende mbangu epai na yango na nkanda makasi.  Namonaki yango ezali kopusana pene na mpate-mobali, mpe ezalaki na nkanda makasi mpo na yango. Ebundisaki mpate-mobali mpe ebukaki maseke na yango mibale, mpe mpate-mobali ezalaki na nguya te ya kotɛmɛla yango. Ntaba ebwakaki mpate-mobali na mabele mpe enyatanyataki yango, mpe moto moko te akokaki kobikisa mpate-mobali na nguya* ya ntaba yango.  Bongo ntaba yango emikumisaki koleka ndelo. Kasi ntango kaka ekómaki makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki, mpe maseke minei oyo ezalaki komonana polele ebimaki na esika na yango, etali na ngámbo nyonso minei* ya likoló.+  Na kati ya maseke yango, moko ebimisaki liseke mosusu, ya moke, mpe ekolaki mingi na ngámbo ya sudi, na ngámbo ya ɛsti* mpe na ngámbo ya mokili Kitoko.+ 10  Ekolaki mingi bongo ekómaki na limpinga ya likoló, ekweisaki ndambo ya limpinga yango mpe ndambo ya minzoto na mabele, mpe enyatanyataki yango. 11  Emikumisaki ata liboso ya Nkumu ya limpinga yango, mpe mbeka ya ntango nyonso elongolamaki epai ya Nkumu, mpe esika na ye mosantu oyo apikaki makasi ekweisamaki.+ 12  Mpe likoló ya makambo ya kobuka mibeko, limpinga moko ekabamaki, elongo na mbeka ya ntango nyonso; mpe liseke yango ezalaki kobwaka solo na mabele, mpe elongaki na oyo esalaki. 13  Mpe nayokaki mosantu moko azali koloba, mpe mosantu mosusu atunaki oyo azalaki koloba ete: “Emonaneli ya mbeka ya ntango nyonso mpe ya kobuka mibeko oyo ezali koyeisa libebi,+ mpo na kokómisa esika mosantu ná limpinga biloko ya konyatanyata, ekoumela ntango boni?” 14  Bongo alobaki na ngai: “Ekoumela mpokwa mpe ntɔngɔ 2 300; mpe esika mosantu ekozonga mpenza ndenge esengeli kozala.” 15  Ntango ngai, Danyele, nazalaki komona emonaneli yango mpe koluka koyeba ntina na yango, na mbala moko namonaki moto moko atɛlɛmi liboso na ngai mpe azalaki komonana lokola mobali. 16  Bongo nayokaki mongongo ya mobali moko na katikati ya mai ya Ulai,+ mpe abelelaki: “Gabriele,+ salisá moto wana akanga ntina ya makambo oyo amonaki.”+ 17  Na yango Gabriele ayaki pene na esika oyo natɛlɛmaki, kasi ntango akómaki, nayokaki nsɔmɔ mpe nafukamaki, natye elongi na nse. Alobaki na ngai: “Ee mwana ya moto, yebá ete emonaneli yango ezali mpo na ntango ya nsuka.”+ 18  Kasi ntango azalaki koloba na ngai, nalalaki mpɔngi makasi, natye elongi na mabele. Bongo asimbaki ngai mpe atɛlɛmisaki ngai esika oyo nazalaki.+ 19  Na nsima alobaki: “Nazali koyebisa yo makambo oyo ekosalema na eleko ya nsuka ya nkanda* ya Nzambe, mpo ezali mpo na ntango oyo etyamá, elingi koloba, ntango ya nsuka.+ 20  “Mpate-mobali ya maseke mibale oyo omonaki ezali komonisa bakonzi ya Media mpe ya Perse.+ 21  Ntaba-mobali oyo etondi na nsuki ezali komonisa mokonzi ya Grɛsi;+ mpe liseke monene oyo ezalaki na katikati ya miso na yango ezali komonisa mokonzi ya liboso.+ 22  Liseke yango ebukanaki, mpe maseke mosusu minei ebimaki na esika na yango:+ makonzi minei ekobima, euti na ekólo na ye, kasi ekozala na nguya lokola ya ye te. 23  “Na eleko ya nsuka ya bokonzi na bango, ntango bato oyo babukaka mibeko bakosala mabe koleka ndelo,* mokonzi moko ya elongi nkandankanda oyo akangaka ntina ya maloba oyo ndimbola na yango eyebani polele te* akotɛlɛma. 24  Akokóma na nguya mingi, kasi na makasi na ye moko te. Akobebisa biloko mingi mpenza na ndenge ya kokamwa,* mpe akolonga na nyonso oyo azali kosala. Akobebisa bato ya nguya, ata mpe bato oyo bazali basantu.+ 25  Na mayele mabe na ye, akosalela bokosi mpo na kolonga; mpe akomikumisa na motema na ye; mpe na ntango oyo bato bazali na likambo ya kobanga te,* akoyeisa libebi epai ya bato mingi. Akotɛmɛla ata Nkumu ya bankumu, kasi lobɔkɔ ya moto te nde ekobuka ye. 26  “Makambo oyo elobamaki na emonaneli oyo etali bantɔngɔ mpe bampokwa ezali solo, kasi osengeli kobomba emonaneli yango ezala sekele, mpo elobeli eleko oyo ekoya na nsima mpenza.”*+ 27  Mpe ngai Danyele nalɛmbaki mingi mpe nabɛlaki mwa mikolo.+ Na nsima, natɛlɛmaki mpe nazongelaki mosala na ngai epai ya mokonzi;+ kasi nazalaki koyoka nzoto kilo mpo na makambo oyo namonaki, mpe moto moko te akokaki koyeba ntina na yango.+

Maloba na nse

To, “Susa.”
To, “ndako ya mokonzi.”
To, “etúká oyo eyangelami.”
Lil., “lobɔkɔ na yango.”
To, “epai moi elalaka.”
Lil., “lobɔkɔ.”
Lil., “mipɛpɛ minei.”
To, “epai moi ebimaka.”
To, “kopesa etumbu.”
To, “bakokóma na nsuka.”
To, “oyo ayebi mayele mabe nyonso.”
To, “Akobebisa mpenza kobebisa.”
To mbala mosusu, “mpe kozanga likebisi.”
To, “ekosalema nsima ya mikolo mingi.”