Danyele 12:1-13

  • “Ntango ya nsuka” mpe nsima na yango (1-13)

    • Mikaele akotɛlɛma (1)

    • Baoyo bazali na mayele ya kososola bakongɛnga (3)

    • Boyebi ya solo ekokóma mingi (4)

    • Danyele akotɛlɛma mpo na kozwa libula na ye (13)

12  “Na ntango yango Mikaele*+ akotɛlɛma, ye nkumu monene+ oyo azali* wana mpo na bolamu ya bato ya ekólo na yo.* Mpe ekozala ntango moko ya mpasi na ndenge oyo ezalá naino te banda ekólo moko esalemá tii na ntango wana. Mpe na ntango yango bato ya ekólo na yo bakobika,+ moto nyonso oyo nkombo ekomami na buku.+  Mpe mingi na baoyo balali na kati ya putulu ya mabele bakolamuka, ndambo mpo na bomoi ya seko mpe basusu mpo na nsɔni mpe kotyolama ya seko.  “Mpe baoyo bazali na mayele ya kososola bakongɛnga lokola kongɛnga ya etando ya likoló, mpe baoyo bazali komema bato mingi epai ya bosembo bakongɛnga lokola minzoto, libela na libela.  “Kasi yo Danyele, bombá maloba yango sekele mpe kangá buku yango na elembo tii na ntango ya nsuka.+ Mingi bakokende epai na epai,* mpe boyebi ya solosolo ekokóma mingi.”+  Na nsima ngai Danyele, namonaki bato mosusu mibale batɛlɛmi wana, moko na ngámbo oyo ya ebale mpe mosusu na ngámbo oyo kuna ya ebale.+  Bongo moko na bango alobaki na mobali oyo alataki elamba ya lini,+ oyo azalaki likoló ya mai ya ebale, ete: “Ntango boni ekoleka mpo na kokóma na nsuka ya makambo oyo ya kokamwa?”  Bongo nayokaki mobali oyo alataki elamba ya lini, oyo azalaki likoló ya mai ya ebale, azali koloba. Atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali mpe lobɔkɔ na ye ya mwasi na likoló mpe alapaki ndai na nkombo ya Oyo azali na bomoi libela na libela:+ “Ekozala mpo na ntango moko oyo etyamá, bantango oyo etyamá mpe katikati ya ntango.* Ntango kaka bakosilisa kobukabuka nguya ya bato oyo bazali basantu,+ makambo nyonso wana ekokóma na nsuka na yango.”  Nzokande ngai nayokaki, kasi nakangaki ntina te;+ na yango nalobaki: “Ee nkolo na ngai, nsuka ya makambo yango ekozala ndenge nini?”  Bongo alobaki: “Kende, Danyele, mpo maloba yango esengeli kozala sekele mpe ekokangama na elembo tii na ntango ya nsuka.+ 10  Mingi bakomipɛtola, bakomikómisa mpɛmbɛ mpe bakokóma pɛto.+ Bato mabe bakosala kaka makambo ya mabe, mpe ata moto mabe moko te akokanga ntina; kasi baoyo bazali na mayele ya kososola bakokanga ntina.+ 11  “Mpe kobanda ntango oyo mbeka ya ntango nyonso*+ ekolongolama mpe eloko ya bosɔtɔ oyo eyeisaka libebi ekotyama,+ ekozala mikolo 1 290. 12  “Esengo na moto oyo azali kokoba kozela* mpe oyo akokóma na nsuka ya mikolo 1 335! 13  “Kasi yo, kobá tii nsuka. Okopema, kasi na nsuka ya mikolo okotɛlɛma mpo na kozwa libula* na yo.”+

Maloba na nse

Elimboli, “nani azali lokola Nzambe?”
To, “atɛlɛmi.”
Lil., “bana ya bato ya ekólo na yo.”
To, “bakoyekola yango [elingi koloba, buku yango] na mozindo.”
Elingi koloba, ntango misato na ndambo.
To, “mbeka ya mbala na mbala; ya mokolo na mokolo.”
To, “oyo azali kozela na mposa makasi.”
To, “esika oyo bapesi yo lokola libula.”