Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Danyele

Mikapo

1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Bato ya Babilone bazingi Yerusaleme (1, 2)

    • Bakoteya bilenge bakangami oyo bauti na mabota ya bakonzi (3-5)

    • Bosembo ya Baebre minei emekami (6-21)

  • 2

    • Mokonzi Nebukadenezare alɔti ndɔtɔ oyo etungisi ye mingi (1-4)

    • Moto moko te ya bwanya alongi koyebisa ndɔtɔ yango (5-13)

    • Danyele abondeli Nzambe mpo na kosɛnga lisalisi (14-18)

    • Danyele asanzoli Nzambe mpo amonisi ye sekele (19-23)

    • Danyele ayebisi mokonzi ndɔtɔ yango (24-35)

    • Ndimbola ya ndɔtɔ (36-45)

      • Bokonzi, libanga, ekobuka ekeko (44, 45)

    • Mokonzi akómisi Danyele moto ya lokumu (46-49)

  • 3

    • Ekeko ya wolo ya Mokonzi Nebukadenezare (1-7)

      • Apesi mitindo ete básambela ekeko yango (4-6)

    • Bafundi Baebre misato ete baboyi kotosa (8-18)

      • “Tokosalela banzambe na yo te” (18)

    • Babwaki bango na litumbu ya mɔtɔ makasi (19-23)

    • Babikisami na mɔtɔ na ndenge ya likamwisi (24-27)

    • Mokonzi apesi Nzambe ya Baebre nkembo (28-30)

  • 4

    • Mokonzi Nebukadenezare andimi boyangeli ya Nzambe (1-3)

    • Mokonzi alɔti ndɔtɔ ya nzete moko (4-18)

      • Ntango nsambo ekoleka na nzete oyo ekatami (16)

      • Nzambe azali Moyangeli ya bato nyonso (17)

    • Danyele apesi ndimbola ya ndɔtɔ (19-27)

    • Kokokisama ya liboso ya ndɔtɔ yango (28-36)

      • Mokonzi abɛli ligboma na boumeli ya ntango nsambo (32, 33)

    • Mokonzi akumisi Nzambe ya likoló (37)

  • 5

    • Mokonzi Beleshazare asali fɛti (1-4)

    • Lobɔkɔ moko ekomi na efelo (5-12)

    • Basɛngi Danyele apesa ndimbola ya makomi yango (13-25)

    • Ndimbola: Babilone ekokwea (26-31)

  • 6

    • Bankumu ya Perse basaleli Danyele likita (1-9)

    • Danyele atiki kobondela te (10-15)

    • Babwaki Danyele na libulu ya bankɔsi (16-24)

    • Mokonzi Dariuse akumisi Nzambe ya Danyele (25-28)

  • 7

    • Emonaneli ya banyama minei ya nsɔmɔ (1-8)

      • Liseke ya moke, ya lolendo, ebimi (8)

    • Mokóló na Mikolo afandisi tribinale (9-14)

      • Mwana ya moto atyami mokonzi (13, 14)

    • Nzambe ayebisi Danyele ndimbola ya emonaneli (15-28)

      • Banyama minei ya nsɔmɔ ezali bakonzi minei (17)

      • Basantu bakozwa bokonzi (18)

      • Maseke zomi, elingi koloba bakonzi zomi, bakotɛlɛma (24)

  • 8

    • Emonaneli ya mpate-mobali mpe ya ntaba-mobali (1-14)

      • Liseke moko ya moke emikumisi (9-12)

      • Emonaneli ekoumela mpokwa mpe ntɔngɔ 2 300 (14)

    • Gabriele apesi ndimbola ya emonaneli (15-27)

      • Ndimbola ya mpate-mobali mpe ya ntaba-mobali (20, 21)

      • Mokonzi moko ya elongi nkandankanda atɛlɛmi (23-25)

  • 9

    • Libondeli ya Danyele mpo na koyambola masumu (1-19)

      • Yerusaleme ekotikala mpamba mbula 70 (2)

    • Gabriele ayei epai ya Danyele (20-23)

    • Esakweli ya pɔsɔ 70 (24-27)

      • Masiya akomonana na nsima ya pɔsɔ 69 (25)

      • Masiya akolongolama (26)

      • Engumba mpe esika mosantu ekobebisama (26)

  • 10

    • Momemi-nsango moko ya Nzambe ayei kotala Danyele (1-21)

      • Mikaele asalisi anzelu (13)

  • 11

    • Bakonzi ya Perse mpe ya Grɛsi (1-4)

    • Bakonzi ya sudi mpe ya nɔrdi (5-45)

      • Mokɔngɔli-mpako akotɛlɛma (20)

      • Mokambi ya kondimana akobukana (22)

      • Nzambe ya bandako makasi azwi nkembo (38)

      • Kotindikana kati na mokonzi ya sudi mpe mokonzi ya nɔrdi (40)

      • Bansango ya kobulunganisa oyo euti na ɛsti mpe na nɔrdi (44)

  • 12

    • “Ntango ya nsuka” mpe nsima na yango (1-13)

      • Mikaele akotɛlɛma (1)

      • Baoyo bazali na mayele ya kososola bakongɛnga (3)

      • Boyebi ya solo ekokóma mingi (4)

      • Danyele akotɛlɛma mpo na kozwa libula na ye (13)