Epai ya Baroma 8:1-39

  • Bomoi mpe bonsomi na nzela ya elimo (1-11)

  • Elimo oyo esali ete Nzambe akómisa bino bana na ye etatolaka (12-17)

  • Biloko oyo ezalisamá ezali kozela bonsomi ya bana ya Nzambe (18-25)

  • ‘Elimo elobelaka biso’ (26, 27)

  • Baoyo Nzambe akanaki liboso (28-30)

  • Balongi mpo na bolingo ya Nzambe (31-39)

8  Yango wana, baoyo bazali na bomoko na Kristo Yesu bakweisami te na likambo.  Mpo mobeko ya elimo oyo ezali kopesa bomoi na bomoko na Kristo Yesu elongoli yo+ na mobeko ya lisumu mpe ya liwa.  Eloko oyo Mibeko elongaka te kosala+ mpo ezalaki na bolɛmbu+ na nzoto, Nzambe asalaki yango na ndenge atindaki Mwana na ye moko+ na nzoto oyo ezali lokola oyo ya masumu mpo na kolongola lisumu.+ Akatelaki lisumu etumbu na nzoto,  mpo tókokisa lisɛngami ya sembo ya Mibeko,+ na kosala makambo na boyokani na bamposa ya nzoto te, kasi na bamposa ya elimo.+  Baoyo batyaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, bakanisaka ntango nyonso na bamposa ya nzoto na bango.+ Kasi baoyo balandaka litambwisi ya elimo santu batyaka makanisi na bango na makambo ya elimo.+  Mpo kotya makanisi na bamposa ya nzoto elakisi liwa,+ kasi kotya makanisi na elimo elakisi bomoi mpe kimya;+  kotya makanisi na bamposa ya nzoto elakisi kozala monguna ya Nzambe,+ mpo yango etosaka mobeko ya Nzambe te, kutu, ekoki mpe kotosa yango te.  Yango wana, baoyo basalaka makambo na kolanda bamposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te.  Nzokande, bino bozali kotosa te bamposa ya nzoto, kasi bozali kolanda litambwisi ya elimo,+ soki elimo ya Nzambe ezali mpenza kofanda na kati na bino. Kasi soki moto azali na elimo ya Kristo te, azali moto na ye te. 10  Kasi soki Kristo azali na bomoko na bino,+ nzoto ekufi mpo na lisumu, kasi elimo ezali bomoi mpo na bosembo. 11  Nzokande, soki elimo ya moto oyo asekwisaki* Yesu uta na bakufi ezali kofanda na kati na bino, moto oyo asekwisaki Kristo Yesu uta na bakufi+ akosala mpe ete nzoto na bino oyo ekufaka, ezala na bomoi+ na nzela ya elimo na ye oyo ezali kofanda na kati na bino. 12  Yango wana, bandeko, tosɛngisami te kolanda bamposa ya nzoto mpo na kotambwisa bomoi na biso na kolanda bamposa yango;+ 13  mpo soki bozali kotambwisa bomoi na bino na kolanda bamposa ya nzoto bokokufa mpenza; kasi soki na nzela ya elimo santu bobomi misala ya nzoto,+ bokozala na bomoi.+ 14  Baoyo nyonso bazali kotambwisama na elimo ya Nzambe bazali mpenza bana ya Nzambe.+ 15  Mpo bozwaki elimo ya boombo te oyo ezali kopesa lisusu kobanga, kasi bozwaki nde elimo oyo esali ete Nzambe azwa bino mpe akómisa bino bana na ye, oyo na nzela na yango tobelelaka ete: “Aba,* Tata!”+ 16  Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso+ ete tozali bana ya Nzambe.+ 17  Bongo soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula (ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula+ elongo na Kristo), soki tomoni mpasi elongo na Kristo+ mpo tózwa mpe nkembo elongo na ye.+ 18  Mpo namonaka ete bampasi ya eleko oyo ezali eloko te liboso ya nkembo oyo ekomonana na nzela na biso.+ 19  Mpo biloko oyo ezalisamá* ezali kozela na mposa makasi komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe.+ 20  Mpo biloko oyo ezalisamá ekómisamaki mpamba,+ na ndenge na yango moko te kasi mpo na moto oyo akómisaki yango bongo, mpo na elikya: 21  biloko oyo ezalisamá ekolongwa+ mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo. 22  Mpo toyebi ete biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kolela na mawa* elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo. 23  Esuki kaka wana te, kasi biso moko mpe oyo tozali na mbuma ya liboso, elingi koloba elimo, ɛɛ, biso moko tozali kolela na mitema na biso mpenza,+ ntango tozali kozela na mposa makasi Nzambe azwa biso mpe akómisa biso bana na ye,+ tósikwama na nzoto na biso na nzela ya lisiko. 24  Mpo tobikisami wana tozali na elikya yango. Kasi elikya oyo ezali komonana ezali elikya te; mpo ntango moto azali komona eloko, atyelaka yango nde elikya? 25  Kasi soki tozali kotyela eloko oyo tozali komona te+ elikya,+ tokozela yango mpenza na ezaleli ya koyika mpiko.+ 26  Ndenge moko mpe, elimo ezali kosalisa biso mpe na bolɛmbu na biso;+ likambo ezali ete: toyebaka te nini tosengeli kosɛnga na mabondeli na biso, kasi elimo yango moko elobelaka biso ntango tozali kolela na motema,* atako maloba ezali kobima te. 27  Kasi moto oyo atalaka motema+ ayebaka oyo elimo ezali koluka, mpo yango ezali kolobela basantu na kolanda mokano ya Nzambe. 28  Toyebi ete Nzambe asalaka ete misala na ye nyonso esala elongo mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye, baoyo babengami na kolanda mokano na ye;+ 29  mpo baoyo ye andimaki libosoliboso akanaki mpe liboso ete bákokana na ndenge Mwana na ye azali,+ mpo azala mwana ya liboso+ na kati ya bandeko ebele.+ 30  Lisusu, baoyo ye akanaki liboso,+ abengaki mpe bango;+ mpe baoyo ye abengaki, atángaki mpe bango bato ya sembo.*+ Na nsuka, baoyo ye atángaki bato ya sembo, apesaki mpe bango nkembo.+ 31  Bongo tokoloba nini na makambo yango? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akolonga biso?+ 32  Moto oyo abombaki kutu Mwana na ye te kasi akabaki ye mpo na biso nyonso,+ mpo na nini akopesa biso mpe te elongo na ye biloko mosusu nyonso na boboto mpenza? 33  Nani akofunda bato oyo Nzambe aponá?+ Nzambe nde moto azali kotánga bango bato ya sembo.*+ 34  Nani akokweisa bango na likambo? Moto moko te, mpo Kristo Yesu akufaki mpe asekwisamaki uta na bakufi, ye moto azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe+ mpe azali kolobela biso.+ 35  Nini ekoki kosala ete Kristo atika kolinga biso?+ Ezali nde bolɔzi, mpasi, monyoko, nzala, bolumbu, likama to mopanga?+ 36  Kaka ndenge ekomamá ete: “Lokola tosalelaka yo, bazali koboma biso mokolo mobimba; totalelami lokola bampate ya koboma.”+ 37  Kutu, na makambo nyonso wana tozali mpenza kolonga+ na lisalisi ya moto oyo alingaki biso. 38  Mpo nandimi mpenza ete ezala liwa, to bomoi, to baanzelu, to baguvɛrnema, to makambo ya lelo, to makambo oyo ekoya, to banguya,+ 39  to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo emonisami na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.

Maloba na nse

Lil., “alamwisaki.”
Liloba ya Ebre to Aramɛyɛ oyo elimboli, “Ee Tata!”
Ezali kolobela mingimingi bato.
To, “kokimela.”
To, “kokimela.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.