Epai ya Baroma 1:1-32

  • Mbote (1-7)

  • Paulo azali na mposa ya kokende na Roma (8-15)

  • “Moto ya sembo akozala na bomoi na nzela ya kondima” (16, 17)

  • Bato oyo batosaka Nzambe te bazali na likambo ya koloba te (18-32)

    • Bizaleli ya Nzambe emonanaka na bozalisi (20)

1  Mokanda oyo euti epai ya Paulo, moombo ya Kristo Yesu. Abengamaki mpo azala ntoma, aponamaki mpo na kosakola nsango malamu ya Nzambe.+  Nzambe alakaki nsango malamu yango banda kala na Makomami mosantu na nzela ya basakoli na ye.  Nsango yango etali Mwana, oyo abotamaki moto na libota* ya Davidi.+  Ezali polele ete azali Mwana ya Nzambe+ mpo Nzambe asalelaki nguya ya elimo santu na ye mpo na kosekwisa mwana yango uta na bakufi+—ɛɛ, Yesu Kristo Nkolo na biso.  Na nzela na ye tozwi boboto monene mpe bontoma+ mpo bato ya bikólo nyonso bándima mpe bátosa ye+ mpo na lokumu ya nkombo na ye,  bikólo epai bino mpe bobengami mpo na kozala bato ya Yesu Kristo—  epai ya baoyo nyonso bazali na Roma, bato oyo Nzambe alingi, oyo abengi mpo bázala basantu: Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.  Libosoliboso, nazali kopesa Nzambe na ngai matondi na nzela ya Yesu Kristo mpo na bino nyonso, mpo bazali kolobela kondima na bino bipai nyonso na mokili mobimba.  Mpo Nzambe, oyo nazali kosalela mosala mosantu na elimo na ngai mpo na nsango malamu ya Mwana na ye, ayebi ndenge natángaka bino ntango nyonso na mabondeli na ngai,+ 10  nazali kobondela ete, soki likoki ezali, mpe soki makambo etamboli malamu na mokano ya Nzambe naya epai na bino. 11  Mpo nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi 12  to, kutu nde, mpo tólendisana na nzela ya kondima, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.+ 13  Kasi bandeko, nalingi bóyeba ete mbala mingi nazalaki kokana koya epai na bino, atako tii sikoyo nazwi naino nzela te, mpo ete mosala na ngai ya kosakola ebota mpe mbuma malamu na kati na bino ndenge moko mpe na bikólo mosusu nyonso. 14  Nazali na nyongo ya Bagrɛki mpe ya bapaya,* ya bato ya bwanya mpe ya bazoba. 15  Bongo nazali na mposa makasi ya kosakwela bino nsango malamu, bino bato oyo bofandi na Roma.+ 16  Mpo nayokelaka nsango malamu nsɔni te;+ kutu, yango nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika,+ Moyuda liboso+ mpe lisusu Mogrɛki.+ 17  Mpo baoyo bazali na kondima bamonaka ete na nzela ya nsango malamu, Nzambe azali komonisa bosembo na ye mpe yango ekómisaka kondima na bango makasi,+ kaka ndenge ekomami ete: “Kasi moto ya sembo akozala na bomoi na nzela ya kondima.”+ 18  Nzambe na likoló azali komonisa nkanda na ye+ epai ya bato oyo batosaka ye te mpe epai ya baoyo bazangi bosembo. Bazali kosala makambo oyo ezangi bosembo mpo bato báyeba te oyo ezali solo,+ 19  mpo likambo oyo bakoki koyeba mpo na Nzambe ezali komonana polele na kati na bango, mpo Nzambe amonisi bango yango polele.+ 20  Mpo bizaleli na ye oyo emonanaka te, elingi koloba nguya na ye ya seko+ mpe Bonzambe na ye,+ ezali komonana polele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá,+ yango wana bazali kutu na likambo ya koloba te. 21  Mpo atako bayebaki Nzambe, bakumisaki ye te lokola Nzambe mpe bapesaki ye matɔndi te, kasi makanisi na bango ekómaki ya bozoba mpe motema na bango oyo ezangá mayele ekómaki molili.+ 22  Atako balobi ete bazali bato ya bwanya, bakómi bazoba 23  mpe batiki kokumisa Nzambe oyo apɔlaka te, bakómi kokumisa elilingi ya moto oyo apɔlaka mpe ya bandɛkɛ mpe ya bikelamu ya makolo minei mpe ya biloko oyo ebendanaka na libumu.+ 24  Yango wana, na kolanda bamposa ya mitema na bango, Nzambe atiki bango básala makambo ya mbindo, mpo básambwisa nzoto na bango moko. 25  Bandimaki lokuta na esika ya kondima solo ya Nzambe; basambelaki mpe basalelaki biloko oyo ezalisamá mosala mosantu na esika ya kosambela mpe kosalela Moto oyo azalisaki yango, oyo asanzolami libela na libela. Amen. 26  Yango wana Nzambe atiki bango bálanda bamposa makasi ya kosangisa nzoto kozanga komipekisa,+ mpo basi na bango batiki ndenge oyo esengeli kosangisa nzoto, bakómi kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te;+ 27  mibali mpe ndenge moko batiki ndenge oyo esengeli kosangana na mwasi mpe bakómi kozika mpenza na mposa makasi bango na bango, mibali na mibali,+ bazali kosala makambo ya nsɔni mpe bazali kozwa mpenza etumbu,* oyo ebongi mpenza na libunga na bango.+ 28  Lokola bandimaki te kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe, Nzambe atiki bango bálanda makanisi oyo andimaka te, mpo básala makambo oyo ebongi te,+ 29  mpe batondi na makambo nyonso ya kozanga bosembo,+ mabe, lokoso,*+ motema mabe, likunya,+ ezaleli ya koboma bato,+ koswana, bokosi,+ mayele mabe;+ bazali bato ya bilobaloba,* 30  batɔngi,+ bayini ya Nzambe, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bamikumisaka, bato oyo balukaka ndenge ya kosala makambo mabe, bato oyo batosaka baboti te,+ 31  bazangá mayele,+ bakokisaka bilaka na bango te, balinganaka te na kati ya libota, bazangá motema mawa. 32  Atako bayebi malamumalamu mobeko ya sembo ya Nzambe, ete bato oyo basalaka makambo wana babongi na liwa,+ bazali kokoba kosala yango. Basuki wana te, kasi bazali mpe kosepela na bato oyo basalaka makambo yango.

Maloba na nse

Lil., “momboto.”
To, “baoyo bazali Bagrɛki te.” Lil., “Babarbare.”
To, “mbano mobimba.”
To, “bato ya songisongi.”
To, “bilulela.”