Epai ya Baroma 6:1-23

  • Bomoi ya sika na nzela ya batisimo kati na Kristo (1-11)

  • Bótika te ete lisumu eyangela nzoto na bino (12-14)

  • Bozalaki baombo ya lisumu, sikoyo bokómi baombo ya Nzambe (15-23)

    • Lifuti ya lisumu ezali liwa; likabo ya Nzambe ezali bomoi (23)

6  Bongo tokoloba nini? Tokokoba nde kosala lisumu mpo boboto monene emonisama mingi?  Te, ata moke te! Lokola tokufaki na makambo ya lisumu,+ tokokoba lisusu kofanda na yango ndenge nini?+  To boyebi te ete biso nyonso oyo tobatisamaki na Kristo Yesu+ tobatisamaki na kati ya liwa na ye?+  Yango wana, tokundamaki elongo na ye na batisimo na biso na kati ya liwa na ye,+ mpo kaka ndenge Kristo asekwisamaki uta na bakufi na nguya ya nkembo ya Tata, biso mpe tózala na bomoi ya sika.+  Mpo soki tokómi na bomoko na ye ntango tokufi liwa lokola oyo ya ye,+ ezali solo ete tokokóma mpe na bomoko na ye ntango tokosekwa na lisekwa lokola oyo ya ye.+  Mpo toyebi ete bomoto na biso ya kala ebakamaki na nzete elongo na ye,+ mpo nzoto na biso ya masumu ezala lisusu na nguya te,+ mpo biso tózala lisusu baombo ya lisumu te.+  Mpo moto oyo akufi afuti* nyongo ya lisumu na ye.  Lisusu, soki tokufi elongo na Kristo, tondimi ete tokozala mpe na bomoi elongo na ye.  Mpo sikoyo toyebi ete lokola Kristo asekwisamaki uta na bakufi,+ akokufa lisusu te;+ liwa ezali lisusu na bokonzi likoló na ye te. 10  Mpo liwa oyo ye akufaki, akufaki mpo na kolongola lisumu mbala moko mpo na libela,+ kasi bomoi oyo ye azali na yango, azali na yango mpo na Nzambe. 11  Ndenge moko mpe bino, bómimona ete bozali bakufi na makambo ya lisumu kasi bato ya bomoi mpo na Nzambe na nzela ya Kristo Yesu.+ 12  Yango wana, bótika te ete lisumu eyangela nzoto na bino oyo ekufaka,+ mpo esala ete bótosa bamposa na yango. 13  Bókoba mpe te kopesa banzoto* na bino na lisumu mpo ezala bibundeli ya kozanga bosembo,* kasi bómipesa nde na Nzambe mpo bózala bato oyo bakufaki mpe sikoyo bozali na bomoi, mpe bópesa Nzambe banzoto* na bino mpo ezala bibundeli ya bosembo.+ 14  Mpo lisumu esengeli te kozala na bokonzi likoló na bino, mpo bozali na nse ya mibeko te+ kasi nde na nse ya boboto monene.+ 15  Tóloba nini mpo na kosukisa? Tokosala nde lisumu mpo tozali na nse ya mibeko te kasi na nse ya boboto monene?+ Te, ata moke te! 16  Boyebi te ete soki bomipesi na moto moko mpo bózala baombo ya kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye?+ Bozali baombo ya lisumu+ oyo ezali komema na liwa+ to baombo ya botosi oyo ezali komema na bosembo?* 17  Kasi Nzambe azwa matɔndi mpo bozalaki baombo ya lisumu kasi bokómi kotosa na motema mateya oyo bapesaki bino. 18  Ɛɛ, lokola bosikolamaki na lisumu,+ bokómi baombo ya bosembo.+ 19  Mpo na bolɛmbu ya nzoto na bino, nazali kosalela maloba oyo bato bayebi: mpo kaka ndenge bopesaki banzoto* na bino ezala baombo ya mbindo ná kobuka mibeko mpo bósala mabe, sikoyo bópesa banzoto* na bino ezala baombo ya bosembo mpo bósala makambo ya bosantu.+ 20  Mpo ntango bozalaki baombo ya lisumu, bosembo ezalaki nkolo na bino te. 21  Bongo litomba ya misala na bino ezalaki nini na ntango wana? Makambo oyo bozali sikoyo koyokela nsɔni. Mpo nsuka ya makambo wana ezali liwa.+ 22  Nzokande, sikoyo lokola bosikolamaki na lisumu mpe bokómi baombo ya Nzambe, litomba na bino ezali bosantu,+ mpe yango ememaka na bomoi ya seko.+ 23  Mpo lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa,+ kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko+ na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.+

Maloba na nse

To, “asikolami na; alimbisami.”
Lil., “biteni ya nzoto.”
To, “kozanga boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “biteni ya nzoto.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “biteni ya nzoto.”
Lil., “biteni ya nzoto.”